Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kirghizistan

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Molulu ya kofungola Babetele

Molulu ya kofungola Babetele

BANDEKO oyo bamipesi na bolingo na bango moko, ezala bana-mboka to bapaya, basalaki mosala makasi mbula mobimba na ndambo mpo na kobongisa bandako ya kala mpe kotonga bandako mosusu ya sika ya Betele na Bichkek, mboka-mokonzi ya Kirghizistan. Molulu ya kofungola Betele esalemaki mokolo ya 24/10/2015, sanza moko nsima ya kosilisa misala ya botongi. Bato koleka 3 000 oyo bayanganaki na Bandako ya Bokonzi 18 mpe na bisika mosusu basepelaki mingi ndenge balandaki likita yango na nzela ya Internet. Ndeko Stephen Lett, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki diskur ya kofungola Betele, oyo ezalaki na motó ya likambo: “Salelá Yehova na motema mobimba.” Mokolo oyo elandaki, likita mosusu oyo elendisaki mpenza kondima ya bandeko esalemaki mpe basakoli mingi ya ekólo yango balandaki yango.

Betele ya Kirghizistan

Mokolo ya pɔsɔ 14/05/2016, bato 6 435 bayanganaki na molulu ya kofungola Betele ya Arménie, oyo ezwi bitaze 6 na ndako molai ya kitoko oyo ezali na bitaze 18. Na libaku yango, bafungolaki mpe Ndako ya mayangani ná bandako mpo na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Badiskur oyo esalemaki na mokolo yango elobelaki ndenge oyo mosala ya Batatoli ya Yehova ebandaki na Arménie. Mosala ebandaki epai ya bato ya Arménie oyo bakendaki kofanda na États-Unis na ebandeli ya bambula 1900, na nsima ekómaki na Arménie yango moko na mobu soki 1975, ntango ekólo yango ezalaki naino na kati ya Union Soviétique. Na bambula euti koleka, lisangá ya Batatoli ya Yehova endimamaki na mibeko ya Leta mpe biro ya filiale efungwamaki. Bandeko mingi oyo bazalaki na likita yango bakanisaki te ete mokolo mosusu likambo monene na lisolo ya Teokrasi ekokaki kosalema na ekólo yango. Ntango ya ntina mingi na molulu yango ezalaki ntango oyo ndeko David Splane ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asɛngaki bayangani nyonso soki bandimi na motema mobimba ete bandako wana ya kitoko epesama epai ya Yehova.

Arménie

Likoló: Molulu ya kofungola Betele ya Arménie

Katikati: Bandeko bayangani na likita ya ntina mingi na nsuka ya pɔsɔ

Na nse: Mabina ya bonkɔkɔ ya bato ya Arménie na mpokwa