Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

APƐNDISI

Oyo osengeli koyeba mpo na Tata, Mwana mpe Elimo Santu

Oyo osengeli koyeba mpo na Tata, Mwana mpe Elimo Santu

BATO oyo bandimaka liteya ya Bosato balobaka ete Nzambe azali na bapersona misato​—Tata, Mwana, ná Elimo Santu. Bango nyonso misato bakokani na nyonso, bazali bazwi-ya-nguya-nyonso, mpe bazali na ebandeli te. Yango wana, liteya ya Bosato elobaka ete Tata azali Nzambe, Mwana azali Nzambe, mpe Elimo Santu azali Nzambe; kasi, bango nyonso misato bazali Nzambe se moko.

Bato mingi oyo bandimaka liteya ya Bosato balobaka polele ete bakoki te kolimbola yango. Atako bongo, bakanisaka mbala mosusu ete liteya yango ezali na Biblia. Ebongi koyeba ete liloba “Bosato” ezali ata esika moko te na Biblia. Biblia elobeli nde likanisi ya Bosato? Mpo na kopesa eyano na motuna oyo, tótala vɛrsɛ moko oyo bato basalelaka mbala mingi mpo na kondimisa liteya ya Bosato.

“LILOBA AZALÁKÍ NZÁMBE”

Yoane 1:1 elobi ete: “O libandela Liloba azalákí. Liloba azalákí bangó na Nzámbe mpé Liloba azalákí Nzámbe.” (Liloba lya Nzambe) Na nsima, kaka na mokapo yango, ntoma Yoane amonisi polele ete “Liloba” yango ezali nde Yesu. (Yoane 1:14) Lokola Liloba abengami Nzambe, bato mosusu bakanisaka mbala moko ete Mwana ná Tata bazali Nzambe se moko.

Likambo oyo osengeli koyeba ezali ete eteni wana ya Biblia ekomamaki libosoliboso na Grɛki. Na nsima, babongolaki yango na minɔkɔ mosusu. Kasi, babongoli mwa mingi ya Biblia bakomaki te ete ‘Liloba azalaki Nzambe.’ Mpo na nini? Na kotalela ndenge bayebaki monɔkɔ ya Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia, babongoli wana bamonaki ete maloba ‘Liloba azalaki Nzambe’ esengeli kobongolama ndenge mosusu. Kasi ndenge nini? Talá mwa bandakisa: “Logos [Liloba] azalaki na bizaleli ya bonzambe.” (A New Translation of the Bible) “Liloba azalaki nzambe.” (La Sainte Bible, Segond-Oltramare) “Liloba azalaki moto ya bonzambe.” (La Bible du Centenaire) Babiblia oyo emonisi ete Liloba azali Nzambe ye mei te. * Liloba abengami “nzambe” (na “n” ya moke), mpamba te ye aleki bikelamu nyonso ya Yehova na lokumu. Na vɛrsɛ wana, liloba “nzambe” elakisi “moto ya makasi.”

LUKÁ KOYEBA MAKAMBO MOSUSU

Lokola ebele ya bato bayebi Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia te, ndenge nini okoki koyeba likambo oyo ntoma Yoane alingaki mpenza koloba? Zwá ndakisa oyo: Molakisi moko alimbweli bana-kelasi liteya moko. Na nsima, emonani ete mwana na mwana akangi ndimbola yango na ndenge na ye. Bakosala nini mpo na kosilisa mokakatano na bango? Bakoki kotuna molakisi ayebisa bango makambo mosusu oyo etali liteya yango. Na ntembe te, makambo mosusu oyo akobakisela bango ekosalisa bango bákanga ntina ya liteya yango malamumalamu. Ndenge moko mpe, mpo na koyeba ndimbola ya Yoane 1:1, okoki koluka na Evanzile ya Yoane makambo mosusu oyo yango elobi mpo na esika oyo Yesu azali na yango. Makambo yango ekosalisa yo oyeba sikoyo liteya yango malamu.

Na ndakisa, talá oyo Yoane akomi lisusu na mokapo 1, vɛrsɛ 18: “Moto amoná Nzambe [Mozwi-ya-Nguya-Nyonso] ata mokolo moko te.” Nzokande, bato bamonaki Mwana, Yesu, mpamba te Yoane alobi ete: “Liloba [Yesu] akómí moto mpé azalákí o ntéi ya bísó . . . Tomónóki nkémbo ya yě.” (Yoane 1:14, Liloba lya Nzambe) Boye, ndenge nini Mwana akoki kozala mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso? Yoane alobi lisusu ete Liloba azalaki “na Nzámbe.” Moto akoki kozala na moto mosusu mpe ye moko azala lisusu moto yango? Longola yango, na kotalela Yoane 17:3, Yesu amonisi polele ete ye na Tata na ye ya likoló bazali bato mibale oyo bakeseni mpenza. Abengi Tata na ye “Nzambe kaka moko ya solosolo.” Lisusu, pene na nsuka ya Evanzile ya Yoane, Yoane alobi na mokuse ete: “Makambo oyo ekomami mpo bino bóndima ete Yesu azali Klisto Mwana ya Nzambe.” (Yoane 20:31) Omoni ete Yesu abengami Mwana ya Nzambe, kasi Nzambe te. Makambo mosusu oyo tomoni na Evanzile ya Yoane elakisi biso ndimbola mpenza ya Yoane 1:1: Yesu, Liloba, azali “nzambe” na ndenge azali na bokonzi monene, kasi ye ná Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso bazali bato mibale oyo bakeseni mpenza.

LUKÁ KOYEBA SOKI MAKAMBO YANGO EZALI MPENZA SOLO

Tózongela lisusu ndakisa ya molakisi ná bana-kelasi. Kanisá ete, ata nsima ya koyoka bandimbola mosusu oyo molakisi apesi, bana-kelasi mosusu bazali kaka kondima te. Bakosala nini? Bakoki kokende epai ya molakisi mosusu alimbwela bango liteya yango. Soki molakisi ya mibale alimboli kaka ndenge molakisi ya liboso alimbolaki, ntembe ya bana-kelasi mingi ekoki ntango mosusu kosila. Ndenge moko mpe, soki osimbi mpenza malamu te likambo oyo Yoane, mokomi moko ya Biblia, alingaki mpenza koloba mpo na boyokani kati na Yesu mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, okoki koluka bandimbola mosusu epai ya moto mosusu oyo mpe akomaki Biblia. Na ndakisa, talá oyo Matai akomaki. Alobi ete Yesu alobaki boye mpo na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo: “Na oyo etali mokolo yango mpe ngonga yango moto moko te ayebi, ezala baanzelu ya likoló ezala Mwana, kaka Tata ye moko.” (Matai 24:36) Na ndenge nini maloba wana emonisi mpenza ete Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso te?

Yesu alobi ete Tata ayebi makambo mingi koleka Mwana. Nzokande, soki Yesu azalaka mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, mbɛlɛ ayebi mpe makambo nyonso oyo Tata na ye ayebi. Yango emonisi ete Tata ná Mwana bakokani te. Kasi, basusu bakoki koloba boye: ‘Yesu azalaki na mitindo mibale ya bomoi. Ntango azali koloba awa, azali moto.’ Kasi ata soki ezalaki bongo, bongo elimo santu? Soki yango mpe ezali Nzambe lokola Tata, mpo na nini Yesu alobi te ete yango eyebi makambo oyo Tata ayebi?

Soki otiki te koyekola Biblia, okoyeba bavɛrsɛ mosusu ebele oyo etali likambo oyo. Yango nyonso ezali komonisa polele oyo tosengeli koyeba mpo na Tata, Mwana mpe elimo santu.​—Nzembo 90:2; Misala 7:55; Bakolose 1:15.

^ par. 3 Mpo na koyeba bandimbola mosusu oyo etali Yoane 1:1, talá lisolo “Liloba azalaki “Nzambe” to “nzambe”?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novembɛ 2008, ebimisami na Batatoli ya Yehova.