Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokapo ya mobu 2016

“Bókoba kolingana ndenge bandeko balinganaka.”Baebre 13:1

Mokapo ya mobu 2016

“Bato mingi . . . bakoyinana. . . . Bolingo ya bato mingi ekokita.” (Mat. 24:10, 12) Maloba wana ya Yesu emonisaki ete bato oyo bakozala na bomoi liboso Yerusaleme ebebisama na mobu 70 T.B., bakozanga bolingo. Nzokande, bato bakoyeba bayekoli ya Kristo na bolingo oyo bakomoniselana. (Yoa. 13:35) Na yango, Baebre oyo bazalaki bakristo na Yerusaleme basepelaki mingi kotánga maloba ya ntoma Paulo oyo emonisaki ete bazalaki na bolingo ya bondeko mpe elendisaki bango bákoba komonisa yango!

Lelo oyo, tozali kopusana na nsuka ya ebongiseli mobimba ya Satana. Ndenge moko na bandeko na biso ya siɛklɛ ya liboso, tofandi na bato oyo bamilingaka, oyo balingá mbongo mpe bisengo, kasi balingaka mpenza Nzambe te, mpe bazalani na bango. (2 Tim. 3:1-4) Atako bongo, Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali kolingana ndenge bandeko balinganaka. Tókoba kolingana lokola bandeko mpo tókoba kosanzola Yehova, Ye oyo azali bolingo.