Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya

Mokanda oyo ebongisami mpo na kosalisa yo okóma kotánga, koloba mpe koteya malamu.

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Tozali koteya nsango eleki ntina oyo bato basengeli koyoka.

LITEYA 1

Ndenge malamu ya kobanda lisolo

Ndenge malamu ya kobanda lisolo ekokisaka mikano misato.

LITEYA 2

Koloba lokola ozali kosolola na bato

Koloba lokola ozali kosolola na bato elimboli koloba ndenge olobaka mpo bato oyo bazali koyoka yo bálanda yo malamu mpe bándima makambo oyo ozali koloba.

LITEYA 3

Kotuna mituna

Tuná mituna oyo ebongi mpo na kopesa bato mposa ya koyoka yo mpo na konyata makanisi ya ntina.

LITEYA 4

Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ

Talá ndenge ya kobongisa makanisi ya bato liboso ya kotánga vɛrsɛ.

LITEYA 5

Kotánga malamu

Soki ozali kotánga malamu ekosalisa bato oyo bazali koyoka yo báyeba Yehova.

LITEYA 6

Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ

Salisá bato bámona polele ndenge vɛrsɛ oyo otángi eyokani na likambo oyo ozali koteya.

LITEYA 7

Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa

Makambo oyo ezali solo mpe oyo ezali kondimisa ekosalisa bato oyo bazali koyoka yo bákóma na likanisi oyo ebongi.

LITEYA 8

Bandakisa oyo ezali koteya

Kolisá mayele na yo ya koteya na kosalela bandakisa ya mindɔndɔ te, oyo ekosepelisa bato mpe ekoteya bango makambo ya ntina.

LITEYA 9

Koyeba kosalela biloko ya kolakisa

Salelá biloko ya kolakisa mpo makanisi ya ntina etikala na mitó ya bato.

LITEYA 10

Kobongola mongongo

Bongolá mongongo, lobá mwa mbangu, to mwa malɛmbɛ, matisá to kitisá mongongo, mpo na kopesa bato mposa ya koyoka yo mpe kosalela makambo oyo ozali koteya.

LITEYA 11

Koloba na esengo

Koloba na esengo emonisaka mpenza ndenge oyo ozali koyoka mpe etindaka bato básepela kolanda lisolo na yo.

LITEYA 12

Koloba na mɔtɔ mpe komitya na esika ya basusu

Soki ozali kobimisa kobanga, to mawa, to esengo, to nkanda, to mayoki mosusu oyo ebongi na ntango ozali koloba, okomonisa ete ozali komitya na esika ya bato oyo bazali koyoka yo.

LITEYA 13

Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa

Salisá bato bámona ndenge oyo lisolo na yo etali bango, mpe lakisá bango ndenge oyo bakoki kosalela makambo oyo bazali koyoka.

LITEYA 14

Kobimisa polele makanisi ya ntina

Salisá bato bálanda lisolo na yo, mpe monisá polele ndenge oyo likanisi mokomoko ya ntina eyokani na mokano oyo ozali koluka kokokisa mpe ndenge oyo eyokani na likanisi mobimba ya lisolo na yo.

LITEYA 15

Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba

Monisá ete ozali kondima makambo ozali koloba. Monisá ete ozali kondima mpenza makambo oyo ozali koteya mpe ete makambo yango ezali na ntina mingi.

LITEYA 16

Kolendisa bato mpe kolobela mingi makambo ya malamu

Zalá na maloba ya kolendisa, kasi te oyo ekolɛmbisa bato. Monisá bato makanisi ya kolendisa oyo ezali na Liloba ya Nzambe.

LITEYA 17

Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango

Salisá bato oyo bazali koyoka yo bákanga ntina ya makambo oyo ozali koteya. Bimisá makanisi ya ntina na maloba ya polele.

LITEYA 18

Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo

Salisá bato bákanisa mpe salisá bango bámona ete bayekoli likambo ya malonga.

LITEYA 19

Kosala makasi mpo na kosimba mitema

Lobá na bato makambo oyo ekotinda bango bálinga Nzambe mpe Liloba na ye, Biblia.

LITEYA 20

Ndenge malamu ya kosukisa lisolo

Maloba ya nsuka oyo ebongi ekopesa bato oyo bazali kolanda yo mposa ya kondima mpe kosalela makambo oyo bayoki.

Landeláká ndenge ozali kokola

Landeláká ndenge ozali kokola ntango ozali kobongisa ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya.

Talá mpe...

BAVIDEO

Bongisá ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya​—Bavideo

Kolisá makoki oyo esengeli mpo na kotánga mpe koteya liboso ya bato.