Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 11

Oyo okoki kosala mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza

Oyo okoki kosala mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza

Esí ekómelá yo omona ete ezalaki mpasi kosala likambo moko ya monene oyo okanaki kosala? Mbala mosusu mpo osala likambo yango malamu, osalaki yango ndambondambo. Ezali mpe ndenge moko na botángi ya Biblia. Okoki komituna boye: ‘Nabanda wapi?’ Na liteya oyo, tokolobela mwa makambo ya pɛtɛɛ oyo okoki kosala, oyo ekosalisa yo osepela na botángi mpe boyekoli na yo ya Biblia.

1. Mpo na nini osengeli kotánga Biblia mokolo na mokolo?

Moto oyo atángaka Biblia to “mobeko ya Yehova” mokolo na mokolo, akozala na esengo mpe makambo na ye ekotambola malamu. (Tángá Nzembo 1:1-3.) Mpo na kobanda, tángáká Biblia mokolo na mokolo na boumeli ya mwa miniti moke. Soki osali bongo, okomesana kotánga Biblia mpe okosepela na yango mingi.

2. Osengeli kosala nini mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza?

Mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza, osengeli kopema mwa moke mpe “kotánga . . . na mongongo ya nse,” elingi koloba, kokanisa na mozindo na makambo ozali kotánga. (Yosua 1:8) Ntango ozali kotánga, okoki komituna boye: Makambo yango eteyi ngai nini mpo na Yehova Nzambe? Ndenge nini nakoki kosalela yango na bomoi na ngai? Ndenge nini nakoki kosalela bavɛrsɛ yango mpo na kosalisa bato mosusu?

3. Ndenge nini okoki kozwa ntango ya kotánga Biblia?

Ezalaka mpasi mpo ozwa ntango ya kotánga Biblia? Mingi kati na biso mpe tozalaka na mokakatano yango. Salá makasi “Omisombela ntango oyo ebongi.” (Baefese 5:16) Okosala yango soki omityeli ntango moko boye mpo na kotánga Biblia mokolo na mokolo. Bato mosusu batángaka na ntɔngɔ. Bamosusu basalaka yango na katikati ya mokolo, mbala mosusu ntango bazali kolya. Basusu mpe batángaka Biblia na mpokwa liboso ya kolala. Bongo mpo na yo, ntango nini ebongi mpenza?

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba oyo okoki kosala mpo osepela lisusu mingi na botángi na yo ya Biblia. Luká mpe komibongisa malamu mpo boyekoli na yo ya Biblia esalisa yo mpenza.

Kaka ndenge okoki kosepela kolya bilei oyo olyá naino te liboso, okoki mpe kosepela kotánga Biblia

4. Sepelá na botángi na yo ya Biblia

Kobanda kotánga Biblia ekoki kozala mpasi. Kasi okoki kokóma na “mposa makasi” ya kotánga yango ndenge moto akoki kobanda kosepela kolya bilei oyo alyá naino te. Tángá 1 Petro 2:2, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Soki ozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, okanisi ete okosepela na yango mpe okokoba kotánga yango?

Talá VIDEO mpo na komona ndenge bato mosusu bakómaki kosepela kotánga Biblia. Mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

  • Na video yango, mikakatano nini bilenge balongaki?

  • Nini esalisaki bango bákoba kotánga Biblia mokolo na mokolo?

  • Basalaki nini mpo básepela lisusu mingi na botángi ya Biblia?

Batoli oyo ekosalisa yo obanda kotánga Biblia:

  • Poná Biblia oyo ezali na elobeli ya pɛtɛɛ mpe elobaka mpenza makambo ndenge ezali. Okoki kosalela Biblia​—Libongoli ya mokili ya sika oyo ezali na monɔkɔ oyo olobaka to na monɔkɔ oyo oyebi malamu.

  • Bandá kotánga makambo oyo ekosepelisa yo mingi. Na ndakisa, talá etánda “Mwa makanisi mpo na kobanda kotánga Biblia.”

  • Komá makambo oyo otángi. Salelá etánda “Botángi na ngai ya Biblia” oyo ezali na mokanda oyo.

  • Salelá programɛ JW Library®. Soki otye programɛ yango na telefone, na tablɛti to na ordinatɛrɛ, okoki koyoka mpe kotánga Biblia bisika nyonso.

  • Salelá makambo oyo ezali na Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe. Ezali na bakarte, bitánda mpe ndimbola ya maloba oyo ekosala ete osepela lisusu mingi na botángi na yo ya Biblia.

5. Omibongisa mpo na boyekoli na yo ya Biblia

Tángá Nzembo 119:34, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Mpo na nini ezali malamu kobondela liboso ya kotánga Biblia to ya komibongisa mpo na boyekoli na yo ya Biblia?

Ntango ozali koyekola Biblia na nzela ya buku oyo, osengeli kosala nini mpo boyekoli yango esalisa yo mpenza? Ntango ozali kobongisa liteya moko, meká kosalela mayele oyo:

  1. Tángá baparagrafe ya ebandeli ya liteya.

  2. Luká bavɛrsɛ ya Biblia mpe tángá yango, mpe luká koyeba ndenge bavɛrsɛ yango eyokani na makambo oyo ezali na paragrafe.

  3. Tyá elembo na maloba ya ntina oyo ezali koyanola na motuna mokomoko; yango ekosalisa yo olobela liteya yango elongo na moteyi na yo.

Oyebaki yango?

Batatoli ya Yehova basalelaki Babiblia ndenge na ndenge. Kasi basepelaka mingimingi na Biblia​—Libongoli ya mokili ya sika mpo elobaka solo mpe ezali polele mpe esaleli nkombo ya Nzambe.​—Talá lisolo na Internet Batatoli ya Yehova bazalaka na Biblia na bango moko?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Koyekola Biblia ezali mpasi. Nazali na ntango te mpe na makasi te ya kosala yango.”

  • Okanisi nini?

NA MOKUSE

Mpo botángi ya Biblia esalisa yo mpenza, mityelá ntango ya kotánga yango, bondelá mpo na koyeba malamu makambo oyo ozali kotánga mpe bongisáká eteni oyo okoyekola.

Bozongeli

  • Mpo botángi na yo ya Biblia esalisa yo mpenza, osengeli kosala nini?

  • Okoki kosala nini mpo ozwa ntango ya kotánga mpe ya koyekola Biblia?

  • Mpo na nini ezali na ntina omibongisaka mpo na boyekoli na yo ya Biblia?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Mpo botángi na yo ya Biblia esalisa yo mpenza, zongelá makanisi mosusu ya ntina.

“Ndenge ya kozwa matomba na botángi ya Biblia” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 1 2017)

Talá batoli ya bato oyo batángi Biblia na boumeli ya bambula ebele.

Yekoláká malamu yo moko (2:06)