Lakisá makambo oyo ezali na kati

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 2

Lisolo ya Asiri na Biblia

Buku oyo okoki kotyela motema​—Eteni 2

Oyo ezali lisolo ya mibale na masolo nsambo oyo ekokoba kobima na banimero ya “Lamuká!” oyo ekolobela banguya nsambo ya mokili mobimba oyo Biblia elobeli. Ntina na yango ezali ya komonisa ete Biblia ezali mokanda ya kotyela motema mpe ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ete nsango na yango ezali nsango ya elikya, oyo elobeli nsuka ya mpasi oyo euti na boyangeli mabe ya bato likoló ya baninga na bango bato.

KOTÁNGA kaka mpamba nkombo Asiri epai ya bato ya Proche-Orient, ekoki kobangisa bango makasi. Mokanda ya Yona elobi ete, ntango Nzambe atindaki mosakoli yango asakola nsango ya bitumbu na Ninive, mboka-mokonzi ya Asiri, akimaki mpe akendaki epai mosusu! (Yona 1:1-3) Ntango mosusu asalaki bongo mpo na lokumu mabe oyo bato ya Asiri bazalaki na yango.

Lisolo ya kotyela motema

Mosakoli Nahumu alobeli Ninive lokola “esika bankɔsi efandaka” mpe “engumba oyo esopaka makila.” Abakisaki ete: “Nyama ya kolya ezangi te! Lokito ya fimbo ná lokito ya makɛlɛlɛ ya yiká ezali, mpe mpunda oyo ezali kopumbwa ná likalo oyo ezali kopumbwa. Moto oyo atambolaka na mpunda na ye, mpe mɔtɔ ya mopanga, mokalikali ya likɔnga, ebele ya bato oyo babomami, mpe ebele ya bibembe oyo etondani; mpe bibembe ezali na nsuka te. Bazali se kobɛta mabaku na bibembe na bango.” (Nahumu 2:11; 3:1-3) Makambo oyo bato ya istware balobi eyokani na oyo Biblia elobi mpo na Asiri?

Buku moko (Light From the Ancient Past) elobeli Asiri lokola “mboka oyo bato bazalaki kobanga mpo eyebanaki ete ezangá mawa mpe ezalaki makasi mpenza mpo na kobunda na banguna na bango.” Maloba oyo elandi emonisi ndenge Assournasirpal II, mokonzi moko ya Asiri atutaki ntolo mpo na makambo oyo azalaki kosala mpo na konyokola bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye:

Libanga ezali kolakisa ndenge bazali kolongola mposo ya bato ya bomoi oyo bakangaki

“Natongaki likonzí moko liboso ya porte ya engumba mpe nalongolaki mposo ya nzoto ya bakonzi nyonso oyo batombokelaki ngai mpe natandaki mposo na bango likoló ya likonzí; bamosusu kati na bango nazalaki kokanga bango na likonzí, mpe bamosusu nazalaki kobaka bango na nzete mpe kokakisa bango likoló ya likonzí yango, . . . nazalaki kokata mabɔkɔ mpe makolo ya bakonzi ya basoda oyo bazalaki kotomboka. . . . Mingi na bango nazalaki kotumba bango na mɔtɔ, mpe bamosusu nazalaki kokanga bango baombo.” Ntango bato ya arkeoloji bakundolaki bisika oyo bandako ya bakonzi ya Asiri ezalaki, bakutaki bifelo oyo ekembisamá na bililingi ya makambo ya nsɔmɔ oyo bazalaki kosala bato oyo bazalaki kokanga.

Na mobu 740 liboso ya ntango na biso, Asiri elongaki Samari, mboka-mokonzi ya boyangeli ya Yisraele na nɔrdi, mpe ememaki bato na yango na boombo. Mbula mwambe na nsima, Asiri ebundisaki Yuda. * (2 Bakonzi 18:13) Senakeribe, mokonzi ya Asiri asɛngaki Hizikiya, mokonzi ya Yuda mpako ya talanta 30 ya wolo mpe talanta 300 ya palata. Biblia emonisi ete afutaki mpako yango. Ata bongo, Senakeribe atingamaki kaka ete Yerusaleme, mboka-mokonzi ya Yuda ekóma koyangelama na ye, mpe alingaki te ete moto akakola maloba na ye.​—2 Bakonzi 18:9-17, 28-31.

Prisme oyo ezali na maloba oyo Senakeribe azalaki kotuta ntolo ndenge akɔtaki na Yuda

Na Ninive, bato ya arkeoloji bakutaki lisolo ya makambo ya ndenge moko na makomi oyo elobeli Senakeribe. Na prisme moko oyo basalá na mabele, oyo ezalaki na matumu motoba, okokuta maloba oyo Senakeribe atutaki na yango ntolo: “Mpo na Hizikiya, Moyuda oyo aboyaki kotosa mibeko na ngai, nazingaki bingumba na ye 46 ya makasi mpe nazwaki yango, bingumba oyo ezingamaki na bifelo ya makasi mpe ebele ya bamboka ya mikemike oyo ezalaki zingazinga na yango, nazwaki (yango) . . . Ye moko [Hizikiya], nakómisaki ye mokangami na Yerusaleme, engumba oyo ye azalaki kofanda, ndenge bakangaka ndɛkɛ na mwa ndako.” Senakeribe alobaki ete Hizikiya atindelaki ye “batalanta 30 ya wolo, batalanta 800 ya palata, mpe mabanga ya ntalo, . . . (mpe) lolenge nyonso ya biloko ya motuya,” mpe yango ematisaki motángo ya batalanta ya wolo oyo azwaki.

Kasi, tósimba ete Senakeribe alobaki te ete alongaki Yerusaleme. Kutu, alobi likambo moko te na ndenge oyo basoda na ye bakufaki mingi mpo Nzambe abɛtaki bango. Biblia elobi ete anzelu moko ya Nzambe abomaki basoda ya Asiri 185 000 na butu moko kaka. (2 Bakonzi 19:35, 36) Jack Finegan, moto moko ya mayele alobi ete: “Lokola elimo ya komikumisa, ezali komonana mingi na makomi ya bakonzi ya Asiri, tokoki kozala na elikya ata moke te ete Senakeribe alobela kokwea ya ndenge wana.”

Esakweli ya kotyela motema

Mbula soki bankama liboso ya kokwea ya ampire ya Asiri, Yisaya asakolaki ete Yehova Nzambe akosɛnga bakonzi wana ya lolendo bázongisa monɔkɔ mpo na ezaleli ya lolendo oyo bamoniselaki basaleli na ye. Yehova alobaki ete: “Nakotuna mokonzi ya Asiri azongisa monɔkɔ mpo na mbuma ya lofundo ya motema na ye mpe mpo na komitombola ya miso na ye ya lolendo.” (Yisaya 10:12) Lisusu, Nahumu, mosakoli ya Nzambe asakolaki ete Ninive esengelaki kopunzama, baporte na yango ekotikala polele mpo banguna bákɔta, mpe bakɛngɛli na yango bakokima. (Nahumu 2:8, 9; 3:7, 13, 17, 19) Mosakoli Sefania, akomaki ete engumba yango ekokóma ‘esika oyo etikali mpamba.’​—Sefania 2:13-15.

Bisakweli wana oyo elobelaki kobebisama ekokisamaki na mobu 632 liboso ya ntango na biso. Yango esalemaki ntango Ninive ekweaki na mabɔkɔ ya mampinga ya Babilone mpe Bamede, basukisaki ampire ya Asiri na ndenge moko ya nsɔni mpenza. Mokanda moko ya Babilone oyo elobeli likambo yango elobi ete basoda yango “bamemaki ebele ya biloko oyo bapunzaki na engumba mpe na tempelo” mpe batikaki Ninive kaka “libondo ya biloko ya bosɔtɔ.” Lelo oyo, esika oyo Ninive, mboka ya makasi ezalaki, ezali na mabondo ya bosɔtɔ, oyo ekaboli yango ná bokula ya ebale Tigre, oyo etalani na Mossoul, engumba moko ya Irak.

Kobebisama ya Asiri ekokisaki mpe esakweli mosusu ya Biblia. Liboso, na mobu 740 liboso ya ntango na biso, Asiri ememaki bokonzi ya mabota zomi na boombo. Kaka na ntango oyo Asiri esalaki likambo yango, Yisaya, mosakoli ya Nzambe, asakolaki ete Yehova ‘akobuka Moasiri,’ ‘akonyatanyata ye,’ mpe akozongisa Yisraele na mboka na ye. Yisaya akomaki ete: “Bato na ye oyo bakotikala na Asiri . . . , [Nzambe] akoyanganisa bango.” Esalemaki mpenza kaka bongo​—mbula soki nkama mibale na nsima!—​Yisaya 11:11, 12; 14:25.

Elaka oyo okoki kotyela motema

Liboso mpenza ete Ninive ekwea, wana bakonzi na yango bazalaki kaka kobangisa banguna na bango makasi mpenza, Yisaya asakolaki koya ya mokonzi moko oyo akokesana na bakonzi mosusu. Akomaki ete: “Baboteli biso mwana, bapesi biso mwana mobali; mpe boyangeli ekozala na lipeka na ye. Mpe bakopesa ye nkombo . . . Nkumu ya Kimya. Bonene ya boyangeli na ye mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te. Ekopikama makasi mpe ekosimbama na bosembo mpe na boyengebene, banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.”​—Yisaya 9:6, 7.

Bokonzi ya Yesu Kristo, “Nkumu ya kimya,” ekoyangela mabele mobimba. Mokanda ya Nzembo 72:7, 8 elobi ete: “Na mikolo na ye, moyengebene akokola lokola matiti ya sika, Mpe kimya ekokóma mingi kino sanza ekozala lisusu te. Mpe akozala na bato oyo ye akoyangela banda na mbu kino na mbu mpe banda na Ebale [Efrata] kino na nsuka ya mabele.”

Na nzela ya ‘Nkumu wana ya kimya,’ oyo azali na nguya mpenza, Yehova Nzambe akokokisa elaka oyo ezali na Nzembo 46:8, 9 ete: “Bóya, bótala misala ya Yehova, Ndenge atye makambo ya kokamwisa na mabele. Ye azali kosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele. Azali kobukabuka litimbo mpe kokatakata likɔnga; Azali kotumba makalo na mɔtɔ.”

Liboso esakweli yango ekokisama Batatoli ya Yehova bazali kokokisa mokumba ya koteya bato Biblia, nzela ya kimya ndenge Yesu asalaki. Ya solo, moto moko te, kasi Nzambe nde akokokisa esakweli ya Biblia oyo ezali na Yisaya 2:4 oyo elobi ete: “Bakotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti. Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.” Kasi, lelo oyo mokili mpe bakonzi na yango bazali kobebisa bamiliare na bamiliare ya badolare mbula na mbula mpo na basoda!

Masolo mpe bisakweli ya solosolo nde esali ete Biblia ezala mokanda oyo eleki mikanda nyonso, ezali komonisa epai ya baoyo bazali koluka solo na bosembo nyonso ete Biblia ezali buku ezali oyo tokoki mpenza kotyela motema. Na lisolo oyo elandi na kati ya masolo oyo ekolobela banguya nsambo, tokolobela Babilone, mboka-mokonzi ya ampire ya misato ya monene oyo Biblia elobeli.

^ par. 9 Nsima ya boyangeli ya mokonzi Salomo, mabota 12 na ekólo Yisraele ekabwanaki. Yuda mpe Benyamina esalaki bokonzi ya Sudi; mpe mabota zomi esalaki bokonzi ya nɔrdi. Yerusaleme ezalaki mboka-mokonzi ya bokonzi ya Sudi, mpe Samaria ezalaki mboka-mokonzi ya bokonzi ya nɔrdi.