LAMUKÁ! Sanza ya Octobre 2012

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Makanisi ya bato mpo na nsuka ya mokili

Bato bazali koloba makambo ebele mpo na komonisa ete nsuka ya mokili ekozala. Ezali makambo ya solo, to ezali kaka makanisi ya bato?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Nsuka ya mokili ezali kobangisa bato mingi

Talá makambo motoba oyo bato bazali kobanga ete ekoki kobebisa bomoi awa na mabele.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mbala mosusu nsuka ya mokili ekozala te ndenge ozali kokanisa

Biblia elobi ete mbongwana monene ezali koya. Makambo nini ekosalema?

MITUNA BILENGE MOSUSU BATUNAKA

Nakoki komizela kokutana na makambo nini na libala?​—Eteni 1

Makambo nini ya malamu mpe mikakatano nini okoki komizela kokutana na yango na libala?

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Etuluku ya bambisi

Liteya nini tokoki kozwa epai ya mbisi mpo makama ya mituka ebimaka mingi te?

BIBLIA ELOBI NINI?

Ezali na ntina ozala mondimi ya lingomba moko boye?

Mpo na nini bato mingi balɛmbi mangomba? Ndenge nini Nzambe alingi tósambela ye?

Ndímo-ngayi esalisaka na makambo ebele

Okoki kolya yango, komɛla mai na yango, mpe kobimisa mafuta na yango. Talá makambo mosusu oyo etali mbuma yango oyo esalisaka na makambo ebele.

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Elobeli makambo lokola: Kokende Asie mpo na lisalisi ya monganga, kosala makambo ebele na mbala moko, milingi ya makaya, bato bazali kokufa na koningana ya mabele, motángo ya bato oyo bazali komiboma na Russie ebakisami.