LAMUKÁ! Sanza ya Mai 2013 | Likambo ya kobɛta molongani ekoki kosila?

Mateya ya Biblia esalisá bato mingi bátika mobulu mpe bákóma bato ya boboto mpe oyo bamemyaka basusu.

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo lokola: Kolongola nzala, mitungisi na esika ya mosala, mpe ndenge mopɛpɛ ekómi na bingumba ya Chine.

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya koboya maloba mabe

Okoki kosala nini soki yo ná molongani na yo botikaki ete maloba mabe ebebisa boyokani na bino?

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ndenge ya kotya mibeko mpo na mwana na yo oyo akómi elenge

Okoki kosala nini soki mwana yango azali ntango nyonso kosilika mpo na mibeko oyo otyelaka ye?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Likambo ya kobɛta molongani ekoki kosila?

Ndenge nini batoli ya Biblia ekoki kosalisa ata bato oyo bazalaka mabe mpenza batika bizaleli na bango?

MITUNA-LISOLO

“Nandimaka mpenza ete bomoi eutá na Nzambe”

Tángá mpo oyeba ntina oyo moto moko ya siansi abongolaki makanisi na ye mpo na Biblia, liteya ya evolisyo, mpe ndenge bomoi ebandá.

BIBLIA ELOBI NINI?

Pornografi

Soki olingi kosepelisa Nzambe, luká koyeba ndenge oyo atalelaka pornografi.

Ndenge ya kokɔta mbala moko na site na biso!

Kode QR ezali sikoyo na zulunalo Lamuká!, mpo na kosalisa moto akɔta mbala moko na site na biso.

Makambo mosusu

Lota ná libota na ye—Lisolo na bililingi

Zwá lokasa oyo, mpe talá liteya oyo okoki kozwa epai ya Lota ná libota na ye.