Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Misala ya bilimo mabe

Misala ya bilimo mabe

Koluka kosolola na bakufi ezali mabe?

“Bóbaluka te mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo . . . noki bákómisa bino mbindo.”​Balevi 19:31.

OYO BATO BALOBAKA

Ezali solo ete bato balingaka koyeba mpenza soki bandeko na bango oyo bakufá bazali na kimya. Yango wana balobaka boye: “Mabe ezali wapi soki tokei epai ya bato oyo basololaka na bilimo to banganga-nkisi mpo básalisa biso tósolola na bango? Mbala mosusu bato oyo basololaka na bilimo bakoyebisa biso likambo moko oyo ekokitisa biso mitema.”

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobeli polele likambo ya koluka kosolola na bakufi; likambo oyo ezalaki kosalema mingi na ntango ya kala. Na ndakisa, Mobeko oyo Yehova Nzambe apesaki Bayisraele elobaki boye: “Epai na yo moto azwama te oyo azali . . . kotuna moto oyo asololaka na bilimo to . . . oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.” (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Biblia elobi mpe ete baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ata ya lolenge nini, “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”​—Bagalatia 5:19-21.

Bakufi bakoki nde kosalisa bato ya bomoi to kosala bango mabe?

Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”​Mosakoli 9:5.

OYO BATO BALOBAKA

Bato mingi balobaka ete bakufi bazalaka na bomoi na lolenge moko boye. Na yango, balukaka kosolola na bango, ntango mosusu mpo na kozwa bansango to kokitisa bango mitema mpo básala bango mabe te.

OYO BIBLIA ELOBI

“Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te . . . Bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango [nyonso oyo bazalaki na yango ntango bazalaki na bomoi] esili.” (Mosakoli 9:5, 6) Biblia eteyaka mpenza ete bakufi​—bakufaka mpenza! Bakanisaka te, basalaka eloko te mpe basambelaka Nzambe te. Nzembo 115:17 elobi ete: “Bakufi basanzolaka [Nzambe] te; ezala mpe moto nyonso oyo azali kokita na esika ya kimya ya liwa.”

Na bantango mosusu baoyo basololaka na bilimo balobaka mpe makambo ya solo?

“[Bato] basengeli nde kotunela bato ya bomoi makambo epai na bakufi?”​Yisaya 8:19.

OYO BATO BALOBAKA

Bamosusu balobaka ete bato oyo basololaka na bilimo bakoki koyebisa bango makambo oyo kaka bakufi mpe bato ya libota to baninga na bango nde bakoki koyeba.

OYO BIBLIA ELOBI

Mokanda ya 1 Samwele mokapo 28 elobeli ndenge mokonzi moko oyo azalaki sembo te, na nkombo Saulo, abukaki mobeko ya Nzambe oyo epekisaki kotuna bato oyo basololaka na bilimo. Akendaki kokutana na mwasi moko oyo asololaka na bilimo, oyo emonanaki lokola ete asololaki na Samwele mosaleli moko ya Nzambe oyo akufá! Kasi, asololaki mpenza na Samwele? Te! Asololaki nde na mokosi moko; oyo azalaki komimonisa lokola nde azali Samwele oyo akufaki.

Mokosi yango ezalaki elimo mabe, mosali moko ya Satana “tata ya lokuta.” (Yoane 8:44) Mpo na nini bilimo mabe, to bademo, balukaka komonisa ete bakufi bakobaka kozala na bomoi? Mokano na bango ezalaka ya kobebisa lokumu ya Nzambe mpe ya Liloba na ye Biblia.​—2 Timote 3:16.

Makambo oyo touti kolobela emonisi nde ete elikya ezali te mpo na bakufi? Ezali bongo te! Biblia elaki ete na mikolo ezali koya, lisekwa ekozala mpo na baoyo bazali “na mpɔngi,” na kati ya nkunda. * (Yoane 11:11-13; Misala 24:15) Kasi sikoyo, toyebi ete bandeko na biso oyo bakufá bazali konyokwama te.

^ par. 16 Mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ezali na motó ya likambo oyo elobi “Elikya ya solosolo mpo na bato olingaka oyo bakufá.”