Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maladi ya misuni ya mino​—Ekoki mpe kozwa yo?

Maladi ya misuni ya mino​—Ekoki mpe kozwa yo?

EZALI moko ya bamaladi ya monɔkɔ oyo enyokolaka bato mingi na mokili. Kasi ntango ebandi sika, maladi yango elakisaka mbala moko te bilembo na yango. Yango nde esalaka ete maladi yango ezala mpenza likama makasi. Zulunalo moko (International Dental Journal) etángi maladi ya misuni ya mino na molɔngɔ ya bamaladi ya monɔkɔ oyo “enyokolaka bato mingi.” Ebakisi ete maladi yango “ekoki kobakisa mpasi mpe konyokola moto, ekoki ata kosilisa ye mposa ya kolya mpe esengo na bomoi.” Kolobela maladi yango oyo epalangani ndenge wana ekoki kosalisa yo omibatela.

Makambo etali maladi ya misuni ya mino

Maladi yango etɛlɛmaka esika moko te. Na ebandeli, evimbisaka misuni ya mino. Makila oyo ebimaka na mino emonisaka ebandeli ya maladi yango. Makila yango ekoki kobima ntango moto azali konika mino mpe kolekisa nsinga na bandelo ya mino to kaka mpamba. Lisusu, ntango makila ezali kobima ntango monganga ya mino azali kosala moto ekzamɛ, yango ekoki komonisa ete azali na maladi yango.

Soki maladi ya misuni ya mino ekómi ndenge wana babengaka yango périodontite. Na ntango yango, biloko oyo ebatelaka mino, na ndakisa mikuwa mpe misuni oyo ezingaka mino ebandaka kobeba. Ntango maladi yango ekómi ndenge wana, ekoki komonisa bilembo te tii ntango ekokóma makasi mpenza. Bilembo mosusu ya maladi yango ekoki kozala misuni etiki mino, kolongwa ya mino; madusu na katikati ya mino; monɔkɔ nsolo; misuni ya mino ekómi kolongwa mpe mino etikali libándá mpe ekómi milai; mpe misuni ya mino ekómi kobimisa makila.

Likambo oyo ebimisaka maladi yango mpe ndenge oyo esalaka

Makambo ndenge na ndenge ekoki kosala ete moto abɛla maladi yango. Salite ya bilei oyo ekangamaka na mino esalaka ete mbala na mbala mikrobe ekɔta na mino, yango nde esalaka ete moto abɛla maladi yango. Soki salite yango elongwe te, mikrobe yango ekoki kosala ete misuni ya mino ebimisa mai. Soki ekobi kaka bongo, misuni ya mino ekobanda kokabwana na mino, mpe kotika nzela ete mikrobe oyo ekangami na mino ekɔta tii na misuni ya mino. Soki kaka mikrobe yango ekɔti tii kuna, ekobanda kobebisa mikuwa mpe misuni ya mino. Basalite ya mino, ezala oyo ezali likoló to na nse ya misuni ya mino ekoki kokangama makasi mpenza (kosala mabanga). Mikrobe ezipaka mabanga yango mpe esalaka ete ekóma lisusu makasi mpe ekangama mpenza na mino, ezalaka pɛtɛɛ te kolongola yango ndenge okoki kolongola salite ya mino. Boye, mikrobe yango ekoki kokoba kobebisa misuni ya mino na ndenge ya mabe mpenza.

Ezali mpe na makambo mosusu oyo ekoki kosala ete obɛla maladi ya misuni ya mino. Yango ekoki kozala mpo na kozanga kosukola monɔkɔ, mpo na bankisi oyo esilisaka makasi oyo nzoto ezalaka na yango ya kobundisa bamikrobe, bavirisi, mitungisi, maladi ya diabɛti, komɛla masanga mingi, makaya mpe mbongwana ya ba-hormone epai ya basi ya zemi.

Maladi ya misuni ya mino ekoki mpe komemela yo makambo mosusu. Mpasi na monɔkɔ to mino oyo elongwaka mpo na maladi yango ekoki kosala ete kotafuna bilei ekóma mpasi mpe oyoka elɛngi ya bilei te. Ekoki mpe kobebisa ndenge na yo ya koloba mpe elongi na yo. Bolukiluki emonisi mpe ete soki moto azali na maladi ya monɔkɔ te, nzoto mobimba ekozala malamu.

Ndenge ya koyeba maladi yango mpe kosalisa yango

Ndenge nini okoki koyeba soki ozali na maladi yango? Okoki komona bilembo mosusu oyo touti kolobela na lisolo oyo. Soki omoni yango, ekozala malamu okende epai ya monganga oyo ayebi mpenza kosalisa maladi ya mino mpo asala yo baekzamɛ.

Bakoki kosalisa maladi yango? Ntango ebandi sika, bakoki kosilisa yango. Kasi soki ekómi makasi, monganga akosalisa yo mpo maladi yango ekoba te tii na kobebisa mikuwa mpe misuni ya mino. Minganga oyo bayebi kosalisa mino basalelaka bisaleli oyo ebongi mpenza mpo na kolongola basalite mpe mabanga oyo ekangamaka na mino, ezala na likoló to na nse ya bandelo ya misuni ya mino.

Ata soki ozali na makoki moke to mpe te ya kokutana na monganga oyo asalisaka maladi ya mino, komibatela ekoki kosalisa yo okima maladi wana oyo ezwaka moto kozanga ete ayeba. Kosukola monɔkɔ malamu mpe mbala na mbala ezali lolenge malamu ya komibatela na maladi yango.