Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Ndenge nini bato bakómi kotalela disiplini?

Ndenge nini bato bakómi kotalela disiplini?

Na bambula oyo eleki, bomoi ya libota na bikólo ya Mpoto ebongwanaki mpenza. Kala, baboti nde bazalaki na bokonzi mpe bana bazalaki kotosa bokonzi yango. Lelo oyo, na mabota mosusu, bana nde bakómi bakonzi mpe baboti bazali kotosa bokonzi yango. Na ndakisa, tótalela makambo oyo elandi, oyo esalemaka na bisika mingi.

  • Ntango azali na magazini elongo na mama na ye, mwana mobali moko ya mbula minei atingami mwa motuka ya masano. Mama na ye ameki kopekisa ye. Alobi na ye boye: “Ozali na yango ebele, boye te?” Na nsima, amonaki ete esengelaki te atuna mwana motuna. Mwana agangi na kolela mpe alobi “nalingi yango kaka!” Mpo na kobanga ete mwana atomboka ndenge amesaná, mama asombeli ye.

  • Mwana-mwasi ya mbula mitano akati tata na ye maloba ntango azali kosolola na moto moko. Alobi na tata na ye boye: “Nalɛmbi na ngai. Nalingi nazonga ndako!” Tata na ye akati lisolo, agunzami liboso ya mwana mpe abondeli ye boye: “Sheri, pesá ngai kaka mwa miniti.”

  • Bafundi lisusu James, oyo azali na mbula 12 mpo agangelaki molakisi na ye. Tata ya James asilikeli nde molakisi na esika asilikela mwana na ye. Alobi na James boye: “Atumolaka yo ntango nyonso. Nakofunda ye epai ya bakonzi na ye!”

Atako bandakisa oyo tolobeli awa ezali makambo oyo tokanisi kokanisa, kasi ezali makambo oyo esalemaka. Emonisi makambo mpenza oyo elekaka na bandako oyo baboti batikaka nzela ete bana bázanga limemya, basalaka oyo bana basɛngi mpe batikaka te bana “bázwa etumbu” mpo na mabe oyo basali. Buku moko (The Narcissism Epidemic) elobi boye: “Baboti mingi bakómi kopesa bokonzi epai ya bana na bango ya mike. Kasi na bambula oyo eleki, bana bayebaki ete baboti nde bazali bakonzi, kasi bango te.”

Toboyi te, baboti mingi basalaka makasi báteya bana na bango bizaleli malamu, basukaka kaka te na kopesa ndakisa malamu kasi bapesaka mpe disiplini oyo ebongi na bolingo nyonso soki esengeli. Kasi, ndenge buku oyo totángaki liboso emonisi yango, baboti oyo bayebi ntina ya kosala bongo, “bazali kolanda te mimeseno oyo endimami epai ya bato nyonso.”

Makambo ekómi boye ndenge nini? Ndenge nini bato bakómi kotalela disiplini?

Bokonzi ya baboti ekiti

Bamosusu balobi ete bokonzi ya baboti ebandaki kokita na bambula ya 1960, ntango bato ya mayele bakómaki kotya baboti mpanzi likoló mpo básalelaka bana na bango makambo makasimakasi te. Balobaki boye: ‘Zalá moninga, kasi mokonzi te. Kokumisa eleki disiplini na malamu. Na esika opesa mwana disiplini mpo na mabe oyo asali, taláká nde makambo ya malamu oyo asalaka.’ Na esika kokumisa mpe disiplini etambola nzela moko, bato yango ya mayele balobi nde ete kopamela bana ebebisaka likoki na bango ya koyoka esengo to mawa mpe esalaka ete báyina baboti na bango ntango bakokola.

Liboso, bato ya mayele bazalaki mpe kolobela bolamu oyo komipesa valɛrɛ ememelaka moto. Ezalaki lokola nde sekele ya kobɔkɔla bana malamu ebimaki na mbalakaka mpe sekele yango ezalaki oyo: Salá ete bana na yo bámiyoka malamu. Toboyi te, ezali na ntina kosalisa bana bámityelaka motema. Kasi, makanisi ya bato wana ya mayele elekisaki ndelo. Bato yango balobaki na baboti boye: “Bósalelaka te maloba lokola ‘te’ mpe ‘osali mabe.’ Kobá koyebisa bana na yo ete bazali na valɛrɛ mingi mpe bakoki kokóma nyonso oyo balingi;” lokola nde komiyoka malamu ezali na ntina koleka kozala na bizaleli malamu.

Makanisi ya bato wana ya mayele ya kokumisaka bana nde esali ete bana bámona ete bazali na lotomo ya eloko nyonso

Bato mosusu balobi ete makanisi ya bato wana ya mayele ya kokumisaka bana nde esali ete bana bámona ete bazali na lotomo ya eloko nyonso, lokola nde mokili ekómi ya bango. Buku (Generation Me) elobi ete makanisi yango esali mpe ete bilenge mingi “báyeba te ndenge ya kosala na makambo oyo ekómelaka moto nyonso, na ndakisa ekómelaka moto nyonso ete bálobela ye mabe mpo na likambo oyo asali to alonga te na likambo moko.” Tata moko oyo batángi na buku yango alobi boye: “Na esika ya mosala, makanisi ya bato wana ya mayele ezali na esika te. . . . Soki omemeli patrɔ na yo lapolo ya mabe na biro, akoloba na yo te ete ‘Ee, nasepeli na langi ya papye oyo oponi mpo na kokoma yango.’ Kopesa bana formasyo ya ndenge wana ekosala bango nde mabe.”

Makanisi ndenge na ndenge

Eleki sikoyo bambula mingi baboti bakómi kolanda makanisi ndenge na ndenge oyo ezali kobima na ndenge ya kobɔkɔla bana. Molakisi Ronald Morrish akomi boye: “Disiplini ezali kobongwana se kobongwana. Ezali kolanda ndenge makambo ya mokili ezali kobongwana.” * Ezali mpasi te mpo baboti bákóma ndenge Biblia elobi, “kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya.”​—Baefese 4:14.

Ezali polele ete makanisi ya mikolo oyo ya kolɛmbisa disiplini ezali kobimisa mbuma malamu te. Ekitisi kaka bokonzi ya baboti te, kasi ezali mpe kosala ete bana bázanga litambwisi oyo basengeli na yango mpo na kozwa bikateli ya malamu mpe koyeba mpenza ndenge ya kosala na mikakatano ya bomoi.

Ndenge ya kosala ya malamu koleka ezali?

^ par. 15 Euti na buku Secrets of Discipline: 12 Keys for Raising Responsible Children.