Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Soki esɛngi kozonga lisusu ndako ya baboti

Soki esɛngi kozonga lisusu ndako ya baboti

MOKAKATANO

Bilenge mingi oyo bamonaka ete bakoli, balongwaka na ndako ya baboti mpe bazwaka ndako ya kofutela; kasi soki bakutani na mikakatano ya mbongo bazongaka lisusu epai ya baboti. Yango ekómelá mpe yo?

Ata soki olingaka tata ná mama, kozonga lisusu epai na bango ekoki kozala mpasi. Na ndakisa, elenge mwasi moko na nkombo Sarah, * alobi boye: “Kofanda na ndako na ngai moko esalisaki ngai namityelaka motema mpo ngai moko nde nasengelaki kokokisa bamposa na ngai. Kasi kozonga ndako esalaki namiyoka lokola nazongi lisusu mwana moke.” Elenge mobali moko na nkombo Richard amiyokaki mpe bongo; alobi boye: “Nazalaki na mposa ya kozonga ndako te; kasi nazalaki lisusu na likoki te ya kokokisa bamposa na ngai. Namiyokaki lokola nazangi ntina.”

Soki likambo ya ndenge wana ekómeli mpe yo, lisolo oyo ekoki kosalisa yo ozongela lisusu kokokisa bamposa na yo.

NINI ESALAKA BONGO

Mikakatano ya mbongo. Ntango balongwe na ndako ya baboti, bilenge mingi basutukaka soki bamoni ete ezali pɛtɛɛ te kokokisa bango moko bamposa na bango. Richard oyo touti kolobela, alobi boye: “Nasilisaki mbongo nyonso oyo nabombaki mpo na kokokisa bamposa na ngai.” Ekómelaki mpe Shaina, elenge mwasi moko oyo alongwaki na ndako ya baboti ntango azalaki na mbula 24 mpe azongaki lisusu kuna nsima ya mbula moko na ndambo. Alobi boye: “Nazalaki kokoka kosalela mbongo na ngai malamu te. Nalongwaki na ndako na mbongo te kasi nazongaki ndako ná banyongo.” *

Mikakatano ya mosala. Shaina amonaki ete kolongwa na mosala ekoki kobebisa ata programɛ ya malamu ndenge nini oyo moto asalaki mpo na kokokisa ye moko bamposa na ye. Alobi boye: “Nasilisaki kelasi ya monganga mpe nakendaki na biro moko oyo elukelaka bato mosala mpe esalisaki ngai nazwa mosala. Kasi ntango balongolaki ngai na mosala, mayele esilaki ngai. Nazalaki kofanda na mboka mpe libaku ya kozwa mosala mosusu ya kelasi oyo natángá ezalaki te!”

Kokana makambo oyo okokoka kosala te. Ntango babandaka kosala, bilenge mosusu bamibongisaka te mpo na makambo oyo esɛngaka moto asala mpo na kozwa mwaye ya kobikela. Buku moko (Ready or Not, Here Life Comes) elobi boye: “Mbala mingi mosala na bango ezalaka mpasi koleka ndenge bakanisaki. Bayokaka mabe soki bamoni ete bonsomi oyo bakanisaki ete bakozala na yango ezali bongo te. Bakanisaki te ete mikóló bakutanaka na makambo ya bongo.”

OYO OKOKI KOSALA

Sololá likambo yango na baboti na yo. Sololá na bango makambo lokola: Ntango boni okofanda lisusu ná bango, na makambo nini okobanda kopesa mabɔkɔ, misala ya ndako oyo okoki kosala, mpe makambo oyo okosala mpo ozongela lisusu kokokisa yo moko bamposa na yo. Ata soki ozali na mbula boni, kobosana te ete ozongi nde ndako ya baboti mpe osengeli kotosa mibeko na bango.​—Toli ya Biblia: Kobima 20:12.

Yebá kosalela mbongo na mayele. Buku moko (The Complete Guide to Personal Finance: For Teenagers and College Students) elobi boye: “Ndenge oyo osalelaka mbongo emonisaka soki okolonga to te kosalela malamu mbongo oyo yo moko okobanda kozwa. . . . Liteya ya ntina mpenza ya kobosana te ezali ya koboya kosomba biloko oyo ozali na mposa na yango te.”​—Toli ya Biblia: Luka 14:28.

Luká batoli oyo ebongi. Baboti to mikóló mosusu bakoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kobomba mbongo na banki, kosalela mbongo mpe kofuta bafaktire. Elenge mwasi moko na nkombo Marie, alobi boye: “Esengelaki nabandela naino koyekola makambo ya mikemike. Moninga moko asalisaki ngai nasala liste ya biloko oyo nazali na yango mposa mpe oyo nazali na mposa na yango te. Elekelaki ngai ntango namonaki ete nazalaki nde kobebisa mbongo mingi na biloko oyo ezangi ntina! Nayekolaki mpe ndenge ya kokóma na ezaleli ya komipekisa, ezaleli oyo ezali na ntina mpenza mpo moto akokisaka ye moko bamposa na ye.”​—Toli ya Biblia: Masese 13:10.

Likambo ya ntina koleka oyo ozali kosala ezali nde ya koyeba malamumalamu mosala yango

Luká mosala. Salelá ntango oyo ozalaki kokende mosala mpo na koluka mosala mosusu. Likebisi: Bato mosusu bakoki koloba na yo boye: “Salá oyo okanaka kosala” na likambo etali mosala. Kasi, koluka kaka ‘mosala oyo okanaka’ ekoki kosala ete misala oyo okosepela na yango ezala mingi te mpe oboya misala oyo emonani! Na esika olekisa ntango na kozela kaka mosala oyo ekosepelisa yo, koponapona misala te. Kobosana te ete likambo ya ntina koleka oyo ozali kosala ezali nde ya koyeba malamumalamu mosala yango. Kutu, emonani ete soki moto azali kokóma na eksperiansi mingi na mosala na ye mpe azali kosala yango malamu koleka, asepelaka na mosala yango mingi lisusu. Esɛngi te osala oyo olingaka mpo osepela na oyo osalaka!

^ par. 5 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 8 Mbala mingi bana-kelasi ya iniversite na États-Unis bakutanaka na mikakatano ya ndenge wana. Lapolo ya zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete moyekoli oyo akɔtaka banyongo tii asilisa kelasi, akómaka na banyongo ya badolare soki 33 000.