Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Batoli mpo na kosepela na oyo ozali na yango

Batoli mpo na kosepela na oyo ozali na yango

Biso nyonso, ezala tobalá to tozali monzemba, elenge to mokóló, tolingaka kozala na esengo mpe kosepela na oyo tozali na yango. Nzambe oyo akelá biso alingaka mpe tózala na bomoi ya ndenge wana. Yango wana, apesi biso batoli ya malamu mpenza.

Saláká mosala makasi

“Asala nde mosala makasi, asala na mabɔkɔ na ye mosala oyo ezali malamu, mpo azala na eloko ya kokabela moto oyo azali kokelela.”​—BAEFESE 4:28.

Nzambe oyo akelá biso alingi ete tótalelaka mosala na ndenge ya malamu. Mpo na nini? Moto oyo asalaka mosala makasi azalaka moto ya esengo mpo azalaka na likoki ya kokokisa bamposa na ye moko mpe ya libota na ye. Akoki mpe kosalisa moto oyo azali na bosɛnga. Patrɔ na ye mpe akosepela na ye. Moto oyo asalaka mosala makasi akoki mpenza kobatela mosala na ye. Biblia elobi polele ete mbano ya mosala makasi ezali “likabo ya Nzambe.”​—Mosakoli 3:13.

Zaláká sembo

“Tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—BAEBRE 13:18.

Soki tozali sembo, tokomipesa kilo, tokozala na kimya ya motema, mpe tokolala mpɔngi ya malamu mpenza. Lisusu, bato mosusu bakotyela biso motema mpe bakomonisela biso limemya. Bato oyo bazali sembo te bamipimelaka makambo wana ya malamu. Longola yango, lisololi na bango ekoki kotungisa bango, mpe bakoki kobanga ete mokolo mosusu bato báyeba makambo ya mabe oyo basalaka.

Mbongo ekóma mokonzi na yo te

“Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo.”​—BAEBRE 13:5.

Tosengeli kozala na mbongo mpo na kosomba biloko ya kolya mpe biloko mosusu oyo tosengeli na yango. Kasi, “bolingo ya mbongo” ezali Iikama mpenza. Ekoki kotinda moto alekisa ntango na ye nyonso mpe makasi na ye nyonso kaka mpo na koluka mbongo mingi. Lokola azali kosala nyonso mpo azwa mbongo mingi, akoki kobebisa libala na ye, kozanga ntango ya kosolola na bana na ye, mpe akoki ata kobɛla makasi. (1 Timote 6:9, 10) Lisusu, moto oyo alingá mbongo akoki ata kosala makambo ya kozanga bosembo mpo kaka azwa mbongo. Moto moko ya bwanya alobaki boye: “Moto ya misala ya bosembo akozwa mapamboli mingi, kasi ye oyo azali kowela kozwa bomɛngo akozanga te kozwa likambo.”​—Masese 28:20.

Poná kelasi ya malamu

“Batelá bwanya ná likoki ya kokanisa.”​—MASESE 3:21.

Kotánga kelasi ya malamu ekosalisa biso tózala bato oyo bakoki kotyelama motema mpe tózala baboti ya malamu. Kasi, kotánga kelasi ya malamu emonisi te ete okozala na likoki ya kozwa eloko nyonso oyo osengeli na yango mpe okozala na esengo. Mpo na kolonga na makambo nyonso ya bomoi, tosengeli kolanda mateya oyo Nzambe azali kopesa biso. Biblia elobi boye mpo na moto oyo ayokaka Nzambe: “Nyonso oyo akosala ekolonga.”​—Nzembo 1:1-3.