Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Ntina ya kosala misala ya ndako

Ntina ya kosala misala ya ndako

MOKAKATANO

Na mabota mosusu, eyebani ete bana basalaka misala ya ndako, mpe basalaka yango kozanga komilelalela. Kasi na mabota mosusu, baboti batindaka lisusu bana te mpo básala misala ya ndako, mpe yango esalaka ete bana báyeba misala te.

Bato ya mayele bamoni ete momeseno yango ezali komonana mingimingi na mikili ya Mpoto, esika oyo bana balingaka kaka básalela bango makambo nyonso, kasi bango moko balingaka kosala eloko te. Tata moko na nkombo Steven alobi: “Lelo oyo, bana balingaka kaka kobɛta masano ya video, kosalela Internet mpe kotala televizyo. Tokoki kotya motema te ete bakosala eloko ya malonga.”

Yo okanisi nini? Misala ya ndako ezali na ntina nini? Ezali kaka mpo na kobongisa to kobatela ndako to ezali mpe mpo na kosalisa mwana akola?

OYO OSENGELI KOYEBA

Baboti mosusu balingaka kopesa bana misala ya ndako te, mingimingi soki bana yango bazali na badevuare mingi ya kosala to makambo mingi ya kosala nsima ya kelasi. Kasi, tólobela matomba ya kosalisa bana misala ya ndako.

Misala ya ndako esalisaka mwana akola. Mbala mingi, bana oyo basalaka misala ya ndako bazalaka mayele na kelasi; mpe yango ezali likambo ya kokamwa te. Kosala misala ya ndako esalisaka mwana akóma na bizaleli oyo ekosalisa ye ayekola malamu, na ndakisa komityela motema, komipekisa mpe kokokisa bikateli na ye.

Misala ya ndako esalisaka mwana ayeba kosalisa basusu. Bato mosusu bamoni ete bana oyo basalaka misala na ndako, soki bakoli, basepelaka kopesa mabɔkɔ mpo na kosalisa basusu kozanga koluka lifuti. Yango ekoki kokamwisa te, mpo misala ya ndako esalisaka bango bátya bamposa ya basusu na esika ya liboso. Kasi, Steven, oyo tolobelaki liboso, alobi: “Soki baboti bazali kopesa bana misala te, bana yango bakomona ete esengeli kaka basusu básalelaka bango, mpe bakokola kozanga koyeba malamu mikumba oyo basengeli kokokisa na bomoi mpe ndenge ya kotalela mosala makasi.”

Misala ya ndako esalaka ete libota ezala na bomoko. Soki bana bazali kosala misala ya ndako, bakomona ete bazali na ntina na kati ya libota, mpe bazali na mikumba oyo basengeli kokokisa mpo na libota. Bana bakoki kobosana likambo wana soki baboti bazali kopesa valɛrɛ mingi koleka na makambo oyo bana basalaka nsima ya kelasi, na esika ya misala ya ndako. Omituna boye: ‘Litomba nini mwana na ngai akozwa soki azali kolekisa ntango mingi na bato ya ekipi na ye ya bale, na esika ya kolekisa ntango mingi na bato ya libota na ye?’

OYO OKOKI KOSALA

Banda ntango bana bazali naino mike. Bato mosusu balobaka ete baboti basengeli kobanda kosalisa bana misala ya ndako ntango bakómi na mbula misato. Basusu balobaka ete esengeli kobanda ntango mwana azali na mbula mibale to na nse. Tósimba ete bana mike balingaka kosala elongo na baboti na bango mpe bamekolaka bango.Toli ya Biblia: Masese 22:6.

Pesá bana misala oyo eyokani na mbula na bango. Na ndakisa, mwana oyo azali na mbula misato akoki kobongisa biloko na ye ya lisano, kopangusa mai oyo esopani, kobongisa bilamba. Bana oyo bakoli mwa moke bakoki kokɔmba ndako, kosukola motuka, ata mpe kolamba bilei. Pesáká bana na yo misala na kotalela makoki na bango. Okokamwa ndenge bakokóma kosepela kosala misala ya ndako.

Monisá ete misala ya ndako ezali na ntina mingi. Yango ekoki kozala mpasi soki mwana na yo azali na badevuare mingi ya kosala mokolo na mokolo. Kasi, buku moko (The Price of Privilege) elobi ete koboya kopesa mwana misala ya ndako kaka mpo azwa bapwɛ mingi na kelasi “emonisi ete toyebi te makambo oyo eleki ntina.” Ndenge tolobaki yango liboso, kosalisa bana misala ya ndako ekosalisa bango bákoma bana-kelasi ya malamu mpenza. Mpe mateya oyo bazali kozwa ekosalisa bango ntango bakokóma baboti.Toli ya Biblia: Bafilipi 1:10.

Tyá likebi na formasyo ya mwana, kasi te na ndenge oyo mosala esalemi. Ekoki kosɛnga mwana na yo ntango mingi mpo na kosilisa mosala moko na ndenge oyo olingi. Ntango mosusu, okomona ete asali mosala yango malamu mpenza te. Soki ezali bongo, koluka te kozongela mosala yango lisusu. Mokano na yo ezali te ete mwana asala mosala yango malamu lokola mikóló, kasi ezali nde ya kosalisa ye ayeba mokumba na ye mpe asepela na mosala na ye.Toli ya Biblia: Mosakoli 3:22.

Tyá likebi na mbano. Bato mosusu balobaka ete kofuta mwana mbongo mpo asali mosala ya ndako esalisaka ye ayeba mokumba na ye. Basusu balobaka ete kosala bongo etindaka bana bátya makanisi kaka na oyo bakozwa na libota, kasi te na oyo bakosala mpo na libota. Balobaka mpe ete mwana akoki koboya kosala misala ya ndako soki akómi na mwa mbongo; yango ekopekisa ye azwa matomba ya kosala misala ya ndako. Liteya ezali nini? Ezali malamu te kofuta mwana mbongo mpo asali misala ya ndako.