Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 3 2020 | Kokanisela baninga mabe ekosila?

Tomonaka ete bato mosusu bakaniselaka baninga mabe. Kasi ezali mpasi tómona ete biso mpe tosalaka bongo.

Tólobela makambo oyo tosengeli kosala mpo tókaniselaka baninga mabe te.

 

Okaniselaka baninga mabe?

Makambo nini emonisi polele ete okaniselaka basusu mabe?

Luká koyeba likambo malamu

Soki toyebi likambo moko malamu te, tokoki kokanisela basusu mabe. Talá ndenge makambo oyo esalemaki na bomoi ya soda moko ya kala endimisi yango.

Mityá na esika ya basusu

Soki toyebi komitya na esika ya basusu te, yango ekoki komonisa nini?

Ndimá ete bato mosusu bazali na bizaleli malamu

Soki moto azali komitombola akoki kokanisela baninga mabe. Nini ekoki kosalisa?

Luká kokóma na baninga ebele

Talá bolamu oyo okozwa soki ozali na baninga oyo bazali na loposo mpe mimeseno ekeseni na oyo ya yo.

Zalá na bolingo

Bolingo ekoki kopekisa moto akanisela baninga mabe. Talá na makambo nini..

Kokanisela baninga mabe ekosila!

Makambo nini minei oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala mpo bato bátika kokanisela baninga mabe?

Balongaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe

Talá bavideo misato oyo emonisi ndenge bato balongaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe.