Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moko ya biloko ya kokamwa!

Moko ya biloko ya kokamwa!

Buku moko (Nature’s Building Blocks) elobi boye: “Eloko moko te ezali na ntina mingi na bomoi na biso koleka carbone.” Lokola ekeseni mpenza na biloko mosusu, ezalaka na likoki ya kosangana yango na yango mpe na ba-éléments chimiques mingi mosusu mpo na kosala bamilio ya biloko mikemike oyo bato ya mayele bazali kokoba komona ya sika to bazali kosalela yango mpo na kobimisa oyo ekokani na yango.

Ndenge bandakisa oyo ezali awa emonisi, baatɔmɛ ya carbone ekoki kosangana mpe kosala biloko oyo ezali lokola bashɛni, bapiramide, basɛrklɛ, bapapye mpe batiyo. Eloko babengi carbone ekamwisaka mpenza!

DIAMA

Baatɔmɛ ya carbone esalaka bapiramide oyo babengi tétraèdre, mpe ekómisaka yango makasi, yango nde esalaka ete diama ezala eloko oyo eleki makasi na biloko oyo toyebi. Diama ya solosolo ezalaka kaka molekile moko ya baatɔmɛ ya carbone.

GRAPHITE

Baatɔmɛ ya carbone oyo ekangani makasi mpenza etandanaka moko nsima ya mosusu mpe ekoki koleka moko likoló ya mosusu lokola bapapye oyo batye na molɔngɔ. Mpo na yango nde graphite ezalaka mafuta ya malamu oyo batyaka na bibende mpe yango nde eloko ya libosoliboso basalelaka bakrɛyo. *

GRAPHÈNE

Ezali molɔngɔ moko ya baatɔmɛ ya carbone oyo ebongisamá lokola monyama. Graphène ezalaka makasi mingi koleka ebende. Mwa mokɔlɔtɔ ya krɛyo ezalaka na molɔngɔ moko to ebele ya graphène.

FULLERÈNE

Bamolekile ya carbone oyo ezalaka polele na kati ezalaka lokola bale ya mikemike mpe batiyo oyo babengaka nanotubes. Bazwaka mezire na yango na nanomètre to mɛtrɛ moko kabolá na miliare moko.

BIKELAMU YA BOMOI

Baselile mingi oyo ezalaka na milona, banyama mpe bato esalemá na carbone—tokutaka yango na sukali, mafuta mpe na ba-acides aminés.

“Bizaleli na ye [Nzambe] oyo emonanaka te . . . emonanaka na nzela ya biloko oyo asalá.”Baroma 1:20.

^ par. 7 Talá lisolo Quelqu’un aurait-il un crayon ?na Lamuká! ya 07/2007, na Français.