Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 31

Zwá na motuya likabo oyo ozali na yango ya kobondela

Zwá na motuya likabo oyo ozali na yango ya kobondela

“Libondeli na ngai ebongisama lokola mpaka ya malasi liboso na yo.”​—Nz. 141:2.

LOYEMBO 47 Bondelá Yehova mokolo na mokolo

NA MOKUSE a

1. Tomiyokaka ndenge nini lokola Yehova apesá biso likabo ya kobondela ye?

 MOZALISI ya likoló mpe ya mabele apesá biso likabo moko ya malamu, elingi koloba, likoki ya kopusana penepene na ye na nzela ya libondeli. Kanisá naino: Tokoki koyebisa Yehova makambo nyonso oyo ezali na motema na biso na minɔkɔ nyonso mpe na ntango nyonso oyo tolingi. Tokoki kobondela Yehova ata soki tozali na mbeto ya lopitalo to na kati ya bolɔkɔ, mpe kotya motema ete Tata na biso ya bolingo akoyoka biso. Tozalaka na botɔndi mingi mpo na likabo yango.

2. Ndenge nini Mokonzi Davidi amonisaki ete azalaki kozwa na motuya likabo ya kobondela?

2 Mokonzi Davidi azalaki kozwa na motuya likabo ya kobondela. Yango wana, ayembelaki Yehova boye: “Libondeli na ngai ebongisama lokola mpaka ya malasi liboso na yo.” (Nz. 141:1, 2) Na ntango ya Davidi, mpaka ya malasi oyo banganga-nzambe bazalaki kosalela mpo na losambo ya solo ezalaki kobongisama malamu mpenza. (Kob. 30:34, 35) Davidi azalaki na mposa ya kokanisa malamumalamu makambo oyo akoloba ntango azali kobondela Yehova, ndenge kaka baoyo bazalaki kobongisa mpaka ya malasi bazalaki kosala. Yango mpe ezali mposa makasi oyo tozalaka na yango. Tolingaka ete mabondeli na biso esepelisa Yehova.

3. Ezaleli nini tosengeli komonisa ntango tozali kobondela Yehova, mpe mpo na nini?

3 Tosengeli kozala na limemya mozindo mpenza ntango tozali kobondela Yehova. Kanisá bimonaneli ya kokamwa oyo Yisaya, Ezekiele, Danyele, mpe Yoane bazwaki. Bazwaki bimonaneli ekeseni, kasi nyonso ekokanaki na likambo moko. Yango nyonso ezali komonisa Yehova lokola Mokonzi moko ya lokumu mingi. Yisaya ‘amonaki Yehova afandi na kiti moko ya bokonzi oyo ezalaki likoló mpe etombwaná.’ (Yis. 6:1-3) Ezekiele amonaki Yehova afandi likoló ya likalo na ye kuna na likoló, mpe ezalaki “kongɛnga . . . lokola monama.” (Ezk. 1:26-28) Danyele amonaki “Mokóló na Mikolo” alataki bilamba ya mpɛmbɛ, mpe ndemo ya mɔtɔ ezalaki kouta na kiti na ye ya bokonzi. (Dan. 7:9, 10) Mpe Yoane amonaki Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi mpe monama moko ya langi ya mai ya mpondu, oyo ezalaki kitoko lokola emerode ezingaki ye. (Em. 4:2-4) Nkembo oyo Yehova atondi na yango ezali kotinda biso tózala na botɔndi mpo na likabo oyo Yehova apesá biso ya kobondela ye. Kasi tosengeli kobondela mpo na makambo nini?

“YANGO WANA, BOSENGELI KOBONDELA BOYE”

4. Makambo oyo Yesu alobelaki libosoliboso na libondeli ya ndakisa oyo ezali na Matai 6:9, 10 ezali koteya biso nini?

4 Tángá Matai 6:9, 10. Na Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu ateyaki bayekoli na ye ndenge oyo basengelaki kobondela mpo esepelisa Yehova. Nsima ya koloba “yango wana, bosengeli kobondela boye,” Yesu alobelaki libosoliboso makambo ya ntina oyo eyokani na mokano ya Yehova: Kosantisama ya Nkombo ya Yehova; koya ya Bokonzi na ye, oyo ekobebisa baoyo nyonso batɛmɛlaka Nzambe; mpe makambo ya kitoko oyo Yehova akosala mpo na bato awa na mabele na mikolo ezali koya. Soki tozali koloba makambo yango na mabondeli na biso, tokomonisa ete mokano ya Nzambe ezali na ntina mpo na biso.

5. Ezali malamu tóbondelaka mpe mpo na bamposa na biso moko? Limbolá

5 Na libondeli yango ya ndakisa, Yesu amonisaki mpe ete ezali malamu kobondela mpo na bamposa na biso moko. Tokoki kosɛnga Yehova apesa biso bilei ya mokolo, alimbisa mabunga na biso, asalisa biso tókwea te na komekama, mpe abikisa biso na moto mabe. (Mat. 6:11-13) Ntango tozali kosɛnga Yehova makambo yango, yango ekomonisa ete tozali na mposa ya lisungi na ye mpe mposa ya kosepelisa ye.

Mobali akoki kobondela mpo na makambo nini ntango azali elongo na mwasi na ye? (Talá paragrafe 6) b

6. Tosengeli kobondela kaka mpo na makambo oyo ezali na libondeli ya ndakisa? Limbolá.

6 Yesu alingaki te ete bayekoli na ye basalelaka kaka maloba oyo ezali na libondeli ya ndakisa na mabondeli na bango. Na mabondeli mosusu oyo Yesu asalaki, alobelaki makambo mosusu oyo ezalaki na ntina mpo na ye. (Mat. 26:39, 42; Yoa. 17:1-26) Biso mpe, tokoki kobondela mpo na makambo oyo ezali na ntina mpo na biso. Soki esɛngi tózwa ekateli na likambo moko, tosengeli kobondela mpo na kosɛnga bwanya mpe bososoli. (Nz. 119:33, 34) Ntango esɛngi tókokisa mokumba moko oyo ezali mpasi, tokoki kobondela Yehova asalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki kokokisa yango. (Mas. 2:6) Baboti basengeli kobondela mpo na bana na bango, bana mpe basengeli kobondela mpo na baboti na bango, mpe biso nyonso tosengeli kobondela mpo na bato oyo toyekolaka na bango Biblia mpe baoyo tosakwelaka. Kasi ntango tozali kobondela, tosengeli kosuka kaka te na kosɛnga Yehova asalisa biso.

Mpo na kokumisa Yehova mpe kopesa ye matɔndi, tokoki kobondela mpo na makambo nini? (Talá paragrafe 7-9) c

7. Mpo na nini tosengeli kokumisa Yehova ntango tozali kobondela?

7 Tosengeli kobosana te kokumisa Yehova na mabondeli na biso. Moto moko te abongi kozwa lokumu koleka Nzambe na biso. Azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’ Azali mpe Nzambe ya ‘motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo.’ (Nz. 86:5, 15) Tozali mpenza na bantina mingi oyo esengeli kotinda biso tókumisa Yehova mpo na bizaleli na ye mpe makambo oyo asalaka.

8. Na kotalela Nzembo 104:12-15, 24, wapi makambo mosusu oyo tokoki kopesa Yehova matɔndi mpo na yango?

8 Longola kokumisa Yehova na mabondeli na biso, tosengeli mpe kopesa ye matɔndi mpo na makambo mingi ya malamu oyo asalaka. Na ndakisa, tosengeli kopesa ye matɔndi mpo na balangi kitoko oyo ezalaka na bafololo, biloko kitoko ndenge na ndenge ya kolya, mpe esengo ya kozala na baninga ya motema. Tata na biso ya bolingo apesaka biso biloko yango, mingimingi mpo tózala na esengo. (Tángá Nzembo 104:12-15, 24.) Mpe oyo eleki ntina, topesaka Yehova matɔndi mpo na ebele ya bilei ya elimo oyo apesaka biso mpo tókómisa kondima na biso makasi mpe mpo na elikya kitoko oyo tozali na yango mpo na mikolo ezali koya.

9. Na kotalela 1 Batesaloniki 5:17, 18, nini ekoki kosalisa biso tóbosana te kopesa Yehova matɔndi?

9 Ekoki kozala pɛtɛɛ tóbosana kopesa Yehova matɔndi mpo na makambo nyonso oyo asalaka mpo na biso. Nini ekoki kosalisa yo mpo obosana te? Okoki kosala liste ya makambo ya sikisiki oyo osɛngaki Yehova mpe taláká yango mbala na mbala mpo na komona ndenge Yehova ayanolaki yango. Mpe na nsima bondelá mpo na kopesa ye matɔndi mpo na lisalisi na ye. (Tángá 1 Batesaloniki 5:17, 18.) Kanisá naino: Tolingaka mpe tosepelaka ntango basusu bapesaka biso matɔndi. Ndenge moko mpe, ntango topesaka Yehova matɔndi ndenge ayanolaka na mabondeli na biso, esepelisaka motema na ye. (Kol. 3:15) Kasi, ezali mpe na ntina mosusu oyo topesaka Yehova matɔndi.

PESÁKÁ YEHOVA MATƆNDI MPO NA MWANA NA YE YA BOLINGO

10. Na kotalela 1 Petro 2:21, mpo na nini tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo atindaki Yesu awa na mabele?

10 Tángá 1 Petro 2:21. Tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo atindaki mwana na ye ya bolingo ateya biso. Ntango toyekolaka makambo etali Yesu, toyebaka makambo mingi etali Yehova mpe ndenge ya kosepelisa ye. Soki tozali komonisa kondima na mbeka ya Kristo, tokoki kozala na boyokani ya malamu mpe kimya elongo na Yehova Nzambe.​—Rom. 5:1.

11. Mpo na nini tobondelaka Yehova na nkombo ya Yesu?

11 Topesaka Yehova matɔndi na ndenge tobondelaka na nzela ya Mwana na ye. Yehova apesaka biso biloko oyo tosɛngaka ye na nzela ya Yesu. Yehova ayokaka mpe ayanolaka na mabondeli oyo tosalaka na nkombo ya Yesu. Yesu alobaki: “Nyonso oyo bokosɛnga na nkombo na ngai, nakosala yango, mpo Tata azwa nkembo mpo na Mwana.”​—Yoa. 14:13, 14.

12. Wapi ntina mosusu oyo tosengeli kopesa Yehova matɔndi mpo na Mwana na ye?

12 Yehova alimbisaka masumu na biso na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Biblia ebengi Yesu ‘nganga-nzambe monene na biso, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Bokonzi Monene na likoló.’ (Ebr. 8:1) Yesu azali ‘mosungi epai ya Tata.’ (1 Yoa. 2:1) Tozalaka na botɔndi mingi ndenge Yehova apesá biso Nganga-nzambe monene oyo ayebi ezaleli na biso ya kozanga kokoka mpe oyo “azali kolobela biso”! (Rom. 8:34; Ebr. 4:15) Soki mbeka ya Yesu epesamaka te, likoki ya kopusana penepene na Yehova na nzela ya libondeli elingaki kozala te, mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Na ntembe te, tozali na botɔndi mingi na likabo oyo Yehova apesá biso, elingi koloba, Mwana na ye ya bolingo!

BONDELÁKÁ MPO NA BANDEKO NA YO YA BASI MPE YA MIBALI

13. Na butu liboso akufa, ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kolinga bayekoli na ye?

13 Na butu liboso akufa, Yesu abondelaki ntango molai mpo na bayekoli na ye, asɛngaki Tata na ye ‘akɛngɛla bango mpo na moto mabe.’ (Yoa. 17:15) Yango emonisaki ete Yesu azalaki kolinga bango mingi mpenza! Atako ayebaki ete mosika te akonyokwama mingi, azalaki kaka komitungisa mpo na bolamu ya bantoma na ye.

Makambo nini tokoki kobondela mpo na bandeko na biso ya basi mpe ya mibali? (Talá paragrafe 14-16) d

14. Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka bandeko na biso bakristo?

14 Mpo tómekola Yesu, totyaka kaka te makanisi na bamposa na biso moko. Tobondelaka mpe mbala na mbala mpo na bandeko na biso ya basi mpe ya mibali. Ntango tosalaka bongo, totosaka motindo ya Yesu ya kolingana mpe tomonisaka Yehova ndenge tolingaka bandeko na biso bakristo. (Yoa. 13:34) Ntango tobondelaka mpo na bandeko, tolekisaka ntango na biso mpamba te. Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete “lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.”​—Yak. 5:16.

15. Mpo na nini bandeko na biso bakristo bazalaka na mposa tóbondela mpo na bango?

15 Bandeko na biso bakristo bazalaka na mposa tóbondelaka mpo na bango, mpo bakutanaka na komekama ndenge na ndenge. Tokoki kosɛnga Yehova asalisa bango báyika mpiko na maladi, makama oyo ebimaka yango moko, bitumba ya bana-mboka, minyoko, to mikakatano mosusu. Tokoki mpe kobondela mpo na bandeko basi mpe mibali oyo bamipesaka na bolingo na bango moko mpo na kopesa bandeko oyo bazali na bosɛnga lisungi na ntango ya likama. Yo moko mpe oyebi mwa bandeko oyo bazali kokutana na mikakatano ya ndenge wana. Okoki kotánga bankombo na bango ntango ozali kosala libondeli na yo moko. Tomonisaka ete tolingaka mpenza bandeko na biso ntango tosɛngaka Yehova asalisa bango báyika mpiko.

16. Mpo na nini tosengeli kobondela mpo na bandeko oyo bakambaka biso?

16 Bandeko oyo bakambaka lisangá bazalaka na botɔndi ntango totángaka bankombo na bango na mabondeli na biso mpe mabondeli yango esalisaka bango. Yango nde ntoma Paulo azalaki na mposa na yango. Akomaki boye: “[Bóbondela] mpo na ngai mpe, mpo likoki ya koloba epesama na ngai ntango nazali kofungola monɔkɔ mpo na koyebisa polele mpe na bosembo sekele mosantu ya nsango malamu.” (Ef. 6:19) Lelo oyo mpe, tozali na ebele ya bandeko oyo bakambaka biso oyo basalaka mosala makasi. Tomonisaka ete tolingaka bango ntango tosɛngaka Yehova apambola mosala na bango.

NTANGO TOZALI KOBONDELA LIBOSO YA BASUSU

17-18. (a) Na mabaku nini bakoki kosɛnga biso tóbondela mpo na basusu? (b) Nini tosengeli kobosana te ntango tozali kobondela?

17 Mbala na mbala, basɛngaka biso tóbondela mpo na basusu. Na ndakisa, ndeko mwasi moko oyo azali kotambwisa boyekoli ya Biblia akoki kosɛnga na ndeko mwasi oyo abimi na ye asala libondeli. Ekoki kozala ndeko mwasi oyo abimi na ndeko mwasi oyo azali kotambwisa boyekoli ayebi te moyekoli ya Biblia malamu, yango wana ekozala malamu ndeko mwasi yango asala libondeli ya nsuka. Yango ekoki kozala pɛtɛɛ mpo na ye ayokanisa libondeli na ye na bamposa ya moyekoli.

18 Bakoki kosɛnga na ndeko mobali moko abondela na likita ya mosala ya kosakola to na makita ya lisangá. Bandeko oyo basalaka mabondeli na lisangá basengeli kobosana te mokano ya makita. Ntango tozali kobondela tosengeli te kopesa bandeko toli to koteya bango to kopesa mayebisi. Na makita ya lisangá, esɛngisami ete loyembo mpe libondeli, yango nyonso mibale esala miniti 5, yango wana ndeko oyo azali kosala libondeli asengeli te koloba “mingi,” mingimingi na ebandeli ya makita.​—Mat. 6:7.

SALÁ ETE LIBONDELI EZALA NA ESIKA YA NTINA MINGI NA BOMOI NA YO

19. Nini ekosalisa biso tómilɛngɛla mpo na mokolo ya lisambisi ya Yehova?

19 Tosengeli kosala ete libondeli ezala na esika ya ntina mingi na bomoi na biso wana mokolo ya lisambisi ya Yehova ezali kokóma pene. Yango wana, Yesu alobaki boye: “Bólala mpɔngi te, bópesa malɔmbɔ ntango nyonso mpo bókoka kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kosalema.” (Luka 21:36) Soki tozali kobondela mbala na mbala, kondima na biso ekokóma makasi mpe tokomilɛngɛla ntango mokolo ya lisambisi ya Nzambe ekoya.

20. Ndenge nini mabondeli ekoki kozala lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko?

20 Makambo nini toyekoli? Tozwaka na motuya mpenza likabo oyo tozali na yango ya kobondela. Makambo eleki ntina oyo tosengeli kobondela mpo na yango ezali makambo oyo eyokani mbala moko na mokano ya Yehova. Tomonisaka mpe botɔndi mpo na Mwana ya Nzambe, Bokonzi na ye mpe tobondelaka mpo na bandeko na biso bakristo. Longola yango, tokoki mpe kobondela mpo na bamposa na biso ya mosuni mpe ya elimo. Ntango tokanisaka malamumalamu makambo oyo tokoloba na mabondeli na biso, tomonisaka ete tozwaka na motuya mpenza likabo wana ya kitoko. Maloba na biso ekozala lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko epai ya Yehova, oyo “esepelisaka ye.”​—Mas. 15:8.

LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai

a Tozalaka na botɔndi mingi ndenge Yehova apesá biso libaku ya kobondela ye. Tolingaka ete mabondeli na biso ezala lokola mpaka ya malasi ya nsolo kitoko, mpo na kosepelisa ye. Na lisolo oyo, tokomona soki tokoki kobondela mpo na makambo nini. Tokomona mpe mwa makambo oyo tosengeli kobosana te ntango basɛngi biso tóbondela liboso ya bato nyonso.

b ELILINGI: Mobali moko azali kobondela elongo na mwasi na ye mpo mwana abatelama malamu na eteyelo, tata na ye oyo azali mobange akóma malamu, mpe moyekoli moko ya Biblia akola na elimo.

c ELILINGI: Elenge mobali moko azali kopesa Yehova matɔndi mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu, mabele na biso oyo kitoko, mpe bilei kitoko.

d ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali kobondela ete Yehova apambola Lisangani ya Mikóló-Bakambi na elimo na ye mpe asalisa baoyo bazali konyokwama mpo na makama oyo ebimaka yango moko mpe minyoko.