Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 42

Esengo na bato oyo bazali kobatela bosembo epai ya Yehova

Esengo na bato oyo bazali kobatela bosembo epai ya Yehova

“Esengo na bato oyo bazangi mbeba [to bato oyo bazali kobatela bosembo] . . . , bato oyo batambolaka na mobeko ya Yehova.”​—NZ. 119:1.

LOYEMBO 124 Tótikala sembo

NA MOKUSE *

Bandeko na biso mosusu ya basi mpe ya mibali oyo bakangamaki to bakangami na bolɔkɔ mpo na bosembo na bango na oyo etali boyangeli ya Yehova (Talá paragrafe 1-2)

1-2. (a) Ndenge nini baguvɛrnema mosusu etɛmɛlaka basaleli ya Yehova, kasi basaleli na ye basalaka nini? (b) Ndenge nini tokoki kozala na esengo atako bazali konyokola biso? (Talá mpe elilingi ya ezipeli.)

 LELO oyo, mosala na biso epekisami to endimami te na mibeko ya Leta na bikólo koleka 30 na mokili mobimba. Na bikólo yango mosusu, bakonzi batye bandeko na biso ya basi mpe ya mibali na bolɔkɔ. Makambo nini ya mabe basalaki? Likambo moko ya mabe te, mpo Yehova akanisaka te ete basalaki likambo moko ya mabe. Bango nyonso bazalaki kotánga, mpe koyekola Biblia, koyebisa basusu makambo oyo bandimaka, mpe koyangana na makita elongo na bandeko na bango bakristo. Longola yango, baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Atako batɛmɛlaki bango makasi, basaleli wana ya sembo ya Nzambe babatelaki bosembo * na bango, elingi koloba, bakangamaki makasi na Yehova. Mpe bazali na esengo ndenge batikali sembo!

2 Mbala mosusu, osí omoná bafɔtɔ ya mwa ndambo ya Batatoli wana ya mpiko mpe omonaki bilongi na bango ezalaki na esengo. Bazalaka na esengo mpo bayebi ete Yehova asepelaka na bango mpo bazali kobatela bosembo na bango epai na ye. (1 Nt. 29:17a) Yango wana, Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene . . . Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló.”​—Mat. 5:10-12.

NDAKISA MPO NA BISO

Petro ná Yoane batiká ndakisa mpo na bakristo ya mikolo na biso oyo basengeli kosamba likambo na tribinale mpe kolongisa kondima na bango (Talá paragrafe 3-4)

3. Ndenge Misala 4:19, 20 emonisi yango, bantoma basalaki nini ntango bazalaki konyokola bango na siɛklɛ ya liboso, mpe mpo na nini basalaki bongo?

3 Bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bazali koyika mpiko ndenge moko na bantoma oyo bayikaki mpiko na siɛklɛ ya liboso ntango bazalaki konyokola bango, mpo bazalaki kosakola makambo etali Yesu. Mbala na mbala, bazuzi ya tribinale monene ya Bayuda “bapesaki bango mitindo ete, báloba to báteya ata na esika moko te na nkombo ya Yesu.” (Mis. 4:18; 5:27, 28, 40) Bantoma basalaki nini? (Tángá Misala 4:19, 20.) Bayebaki ete moto oyo aleki bato nyonso na bokonzi nde ‘apesaki bango mitindo ya kosakwela bato mpe kopesa litatoli malamumalamu’ mpo na Kristo. (Mis. 10:42) Yango wana bamonisi na bango, Petro ná Yoane, na mpiko nyonso balobaki ete basengeli kotosa Nzambe na esika ya kotosa bazuzi yango mpe balobaki ete bakotika te kolobela makambo etali Yesu. Na yango, emonani ete balingaki kotuna bazuzi yango boye: ‘Bokanisi ete bozali na bokonzi koleka Nzambe?’

4. (a) Ndenge Misala 5:27-29 emonisi yango, ndakisa nini bantoma batikelá bakristo nyonso ya solo? (b) Ndenge nini tokoki komekola bango?

4 Bantoma batiká ndakisa moko malamu oyo bakristo nyonso ya solo balandaka banda kala, elingi koloba, “kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Tángá Misala 5:27-29.) Nsima ya kobɛtama mpo babatelaki bosembo na bango, bantoma balongwaki liboso ya tribinale monene ya Bayuda, “bazali kosepela mpo batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo [ya Yesu],” mpe bakobaki kosakola!​—Mis. 5:40-42.

5. Mituna nini tosengeli komituna?

5 Ndakisa oyo bantoma batiká ebimisi mwa mituna. Na ndakisa, ndenge nini bantoma bakokaki kotosa Nzambe na esika ya kotosa bato mpe kaka na ntango wana, ‘báyokelaka bakonzi oyo bazali liboso’? (Rom. 13:1) Ndenge nini tokoki ‘kotosa baguvɛrnema mpe bakonzi mpo bazali bayangeli,’ ndenge ntoma Paulo alobaki, mpe na ntango yango kobatela bosembo na biso epai ya Nzambe, Ye oyo azali Moyangeli na biso ya libosoliboso?​—Tito 3:1.

“BAKONZI OYO BAZALI LIBOSO”

6. (a) Banani bazali “bakonzi oyo bazali liboso” oyo Baroma 13:1 elobeli, mpe ndenge nini tosengeli kosalela bango makambo? (b) Tokoki koloba nini mpo na bokonzi oyo bazali na yango?

6 Tángá Baroma 13:1. Na vɛrsɛ oyo, maloba “bakonzi oyo bazali liboso” ezali kolobela bato oyo bazali koyangela oyo bazali na nguya mpe bazali kokonza basusu. Bakristo basengeli kotosa bato yango oyo bazali bakonzi. Bakonzi yango batyaka kimya, batosisaka mibeko, mpe na bantango mosusu, babatelaka basaleli ya Yehova. (Em. 12:16) Na yango, Biblia esɛngi biso tópesa mpako, lifuti, kobanga mpe lokumu na baoyo bazali kosɛnga yango. (Rom. 13:7) Nzokande, bakonzi yango ya baguvɛrnema bazali na bokonzi kaka mpo Yehova nde atikeli bango nzela bázala na yango. Yesu amonisaki etinda moko ya polele ntango Guvɛrnɛrɛ Moroma Ponse Pilate azalaki kotunatuna ye mituna. Ntango Pilate alobaki na Yesu ete azali na bokonzi ya kotika Yesu na bomoi to koboma ye, Yesu alobaki na ye boye: “Olingaki kozala na bokonzi likoló na ngai ata moke te soki yango epesamaki epai na yo te uta na likoló.” (Yoa. 19:11) Bokonzi oyo bakonzi nyonso ya bato mpe ya politiki bazali na yango ezali na ndelo.

7. (a) Ntango nini tosengeli te kotosa bato oyo bazali bakonzi? (b) Likambo nini tosengeli kobosana te?

7 Bakristo basengeli kotosa mibeko nyonso ya guvɛrnema soki mibeko yango ebuki te mibeko ya Nzambe. Kasi tokoki te kotosa bato ntango basɛngi biso tósala makambo oyo Nzambe apekisi to ntango bapekisi biso tósala makambo oyo Nzambe azali kosɛnga. Na ndakisa, bakoki kosɛnga bilenge mibale bázwa mindoki mpo na kobundela ekólo. * To bakoki kopekisa Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika mpe mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, mpe kopekisa biso kosakola mpe kosambela elongo. Ntango bakonzi basalelaka na lolenge ya mabe bokonzi na bango, na ndakisa, konyokola bayekoli ya Kristo, basengeli kozongisa monɔkɔ epai ya Nzambe. Yehova azali komona makambo oyo bazali kosala!​—Mos. 5:8.

8. (a) Bokeseni nini ezali kati ya maloba “oyo ezali liboso” ná “oyo eleki nyonso”? (b) Mpo na nini yango ezali na ntina?

8 Maloba “oyo ezali liboso” elimboli “malamu koleka, monene koleka, esika ya lokumu koleka.” Kasi yango elimboli te “malamu koleka nyonso, monene koleka nyonso, esika ya lokumu koleka nyonso.” Yango epesi ndimbola ya maloba mosusu, elingi koloba, “oyo eleki nyonso.” Atako bakonzi ya guvɛrnema babengami “bakonzi oyo bazali liboso,” ezali na bokonzi mosusu oyo ezali na lokumu koleka nyonso, elingi koloba, oyo eleki nyonso. Mbala minei mobimba na Biblia, Yehova Nzambe abengami na nkombo oyo ya lokumu “Oyo-Aleki-Nyonso.”​—Dan. 7:18, 22, 25, 27.

“OYO-ALEKI-NYONSO”

9. Mosakoli Danyele amonaki nini na bimonaneli?

9 Mosakoli Danyele amonaki bimonaneli oyo emonisaki polele ete Yehova azali na bokonzi likoló ya bakonzi mosusu nyonso. Danyele amonaki libosoliboso bibakata ya banyama minei oyo ezali komonisa bikólo ya nguya oyo eyangelaki mpe oyo ezali koyangela lelo oyo, elingi koloba, Babilone, bato ya Mede mpe ya Perse, Grɛsi, Baroma mpe bokonzi oyo eleki na nguya na mokili lelo oyo, elingi koloba, Anglo-américain. (Dan. 7:1-3, 17) Na nsima, Danyele amonaki Yehova Nzambe afandi na kiti na ye ya bokonzi na tribinale kuna na likoló. (Dan. 7:9, 10) Likambo mosusu oyo mosakoli wana ya sembo amonaki, esengeli kozala likebisi mpo na bakonzi lelo oyo.

10. (a) Na kotalela Danyele 7:13, 14, 27, banani Yehova apesi bokonzi ya mabele? (b) Yango emonisi nini mpo na Ye?

10 Tángá Danyele 7:13, 14, 27. Nzambe azwi nguya mpe bokonzi nyonso ya bato mpe apesi yango na bato mosusu oyo babongi mpenza mpe oyo bazali na nguya mingi. Bato yango banani? Apesi yango na “moto moko lokola mwana ya moto,” elingi koloba, Yesu Kristo, mpe na “basantu ya Oyo-Aleki-Nyonso,” elingi koloba, bato 144000 oyo bakoyangela “libela na libela.” (Dan. 7:18) Emonani polele ete Yehova nde azali “Oyo-Aleki-Nyonso,” mpamba te ye moko kaka nde azali na bokonzi ya kosala likambo ya bongo.

11. Likambo nini mosusu Danyele akomaki oyo emonisi ete Yehova azali na bokonzi likoló ya bikólo nyonso?

11 Likambo oyo Danyele amonaki na emonaneli eyokani na likambo moko oyo alobaki liboso. Danyele alobaki boye: “Nzambe ya likoló . . . alongolaka bakonzi mpe atyaka bakonzi.” Lisusu, akomaki boye: “Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato mpe apesaka yango moto oyo ye alingi kopesa.” (Dan. 2:19-21; 4:17) Ezalaki na bantango oyo Yehova alongolaki to atyaki bakonzi? Ɛɛ!

Yehova abɔtɔlaki bokonzi ya Beleshazare mpe apesaki yango bato ya Mede mpe ya Perse (Talá paragrafe 12)

12. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ndenge Yehova alongolaki bakonzi na bakiti na bango ya bokonzi na ntango ya kala. (Talá elilingi.)

12 Yehova amonisaki polele ete azali na bokonzi koleka “bakonzi oyo bazali liboso.” Tótalela ndakisa misato mpamba. Farao ya Ezipito akómisaki basaleli ya Yehova baombo mpe mbala na mbala azalaki koboya kopesa bango bonsomi. Kasi Nzambe asikolaki bango mpe azindisaki Farao na Mbu Motane. (Kob. 14:26-28; Nz. 136:15) Mokonzi Beleshazare ya Babilone asalaki fɛti mpe ‘amitombolaki mpo na kotɛmɛla Nkolo ya likoló’ mpe ‘asanzolaki banzambe ya palata mpe ya wolo’ na esika ya kosanzola Yehova. (Dan. 5:22, 23) Kasi Nzambe akitisaki mobali wana ya lolendo. Kaka na “butu wana,” Beleshazare abomamaki, mpe bokonzi na ye epesamaki na mabɔkɔ ya bato ya Mede mpe ya Perse. (Dan. 5:28, 30, 31) Mokonzi Erode Agripa I ya Palestine abomaki ntoma Yakobo, mpe na nsima atyaki ntoma Petro na bolɔkɔ, na mokano ya koboma ye. Kasi Yehova apekisaki Erode asala likambo oyo akanaki kosala. “Anzelu ya Yehova abɛtaki ye,” mpe akufaki.​—Mis. 12:1-5, 21-23.

13. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova akweisaki etuluku mobimba ya bakonzi oyo basanganaki.

13 Yehova amonisaki mpe ete azali na nguya koleka etuluku mobimba ya bakonzi oyo basanganaki. Abundelaki Bayisraele mpe asalisaki bango báboma bakonzi 31 ya Kanana oyo basanganaki mpe bázwa eteni monene ya mabele ya Mokili ya Ndaka. (Yos. 11:4-6, 20; 12:1, 7, 24) Lisusu, Yehova asalisaki Bayisraele mpo básilisa nyɛɛ Mokonzi Bene-hadade mpe bakonzi mosusu 32 ya Siri oyo bazalaki kobundisa Yisraele.​—1 Bak. 20:1, 26-29.

14-15. (a) Mokonzi Nebukadenezare mpe mokonzi Dariuse balobaki nini mpo na boyangeli ya Yehova? (b) Mokomi moko ya nzembo alobaki nini mpo na Yehova mpe ekólo na ye?

14 Mbala na mbala, Yehova amonisaki ete azali Oyo-Aleki-Nyonso! Ntango Mokonzi  Nebukadenezare ya Babilone azalaki komikumisa mpo na ‘nguya, makasi mpe lokumu ya nkembo na ye’ na esika amikitisa mpe andima ete Yehova azali Ye oyo abongi kokumisama, Yehova asalaki ete akóma moto ya ligboma. Ntango abikaki, Nebukadenezare ‘apambolaki Oyo-Aleki-Likoló’ mpe andimaki ete “boyangeli [ya Yehova] ezali boyangeli ya seko.” Abakisaki boye: “Moto moko te akoki kokanga lobɔkɔ na ye.” (Dan. 4:30, 33-35) Ntango bosembo ya Danyele epai ya Yehova emekamaki mpe Yehova abikisaki ye na libulu ya bankɔsi, Mokonzi Dariuse alobaki boye: “Bato basengeli kolɛnga mpe kobanga liboso ya Nzambe ya Danyele. Mpo azali Nzambe ya bomoi mpe ye Moto oyo azali koumela seko, mpe bokonzi na ye ezali oyo ekobebisama te, mpe boyangeli na ye ezali mpo na seko.”​—Dan. 6:7-10, 19-22, 26, 27.

15 Mokomi moko ya nzembo alobaki boye: “Yehova ye moko abebisi mokano ya bikólo; abebisi makanisi ya bato ya bikólo.” Abakisaki boye: “Esengo na ekólo oyo Yehova azali Nzambe na yango, bato oyo ye aponi bázala libula na ye.” (Nz. 33:10, 12) Yango nde epesi biso ntina malamu oyo tosengeli kobatela bosembo na biso epai ya Yehova!

ETUMBA YA NSUKA

Limpinga ya baanzelu ya Yehova bakolonga na pɛtɛɛ nyonso etuluku ya bikólo oyo esangani oyo ezali kotɛmɛla ye mpe basaleli na ye! (Talá paragrafe 16-17)

16. Na oyo etali “bolɔzi monene,” tokoki komindimisa na nini, mpe mpo na nini? (Talá elilingi.)

16 Totángaka makambo oyo Yehova asalá kala. Kasi, tozali kozela nini na mikolo ezali koya? Tomindimisi ete Yehova akobikisa basaleli na ye ya sembo na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. (Mat. 24:21; Dan. 12:1) Akosala yango ntango etuluku ya bikólo oyo esangani, oyo eyebani na nkombo Goge ya Magoge, ekobundisa na mokili mobimba baoyo bazali sembo epai ya Yehova. Ata soki etuluku yango ya bikólo esangani esangisi mpe bikólo nyonso 193 ya ONU, ekolonga te kobundisa Ye Oyo-Aleki-Nyonso mpe mampinga na ye ya baanzelu! Yehova alaki boye: “Nakomitombola mpenza mpe nakomisantisa mpe nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”​—Ezk. 38:14-16, 23; Nz. 46:10.

17. Biblia esakoli nini ekokómela bakonzi ya mabele mpe baoyo bazali kobatela bosembo na bango epai ya Yehova na mikolo ezali koya?

17 Kobundisa oyo Goge akobundisa basaleli ya Yehova ekomema na etumba ya nsuka ya Nzambe, Armagedone, ntango akoboma “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi.” (Em. 16:14, 16; 19:19-21) Nzokande, “bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango.”​—Mas. 2:21.

TOSENGELI KOBATELA BOSEMBO NA BISO

18. Na kotalela Danyele 3:28, bakristo mingi ya solo bazali na ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?

18 Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, bosembo mpe ata bomoi ya bakristo mingi ya solo ekómaki na likama mpo balingaka Yehova, lokola azali Moyangeli na bango ya libosoliboso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Bakristo wana ya sembo bazali na ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova, se ndenge moko na Baebre misato oyo babikaki na litumbu ya mɔtɔ mpo batikalaki sembo epai ya Oyo-Aleki-Nyonso.​—Tángá Danyele 3:28.

19. (a) Yehova akosambisa basaleli na ye na kotalela nini? (b) Yango esɛngi biso tósala nini banda sikoyo?

19 Mpo na komonisa ntina ya kobatela bosembo epai ya Nzambe, Davidi mokomi moko ya nzembo, akomaki boye: “Yehova ye moko akokatela bato ya bikólo etumbu. Sambisá ngai, ee Yehova, na kolanda boyengebene na ngai.” (Nz. 7:8) Lisusu, Davidi akomaki boye: “Kozanga mbeba mpe bosembo ebatela ngai.” (Nz. 25:21) Lolenge eleki malamu ya kozala na bomoi ezali ya kotikala sembo epai ya Yehova, kobatela bosembo na biso epai na ye, ata soki likambo nini ekómeli biso na bomoi! Na yango, tokomiyoka lokola mokomi moko ya nzembo oyo akomaki: “Esengo na bato oyo bazangi mbeba [to bato oyo bazali kobatela bosembo] . . . , bato oyo batambolaka na mobeko ya Yehova.”​—Nz. 119:1.

LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!

^ Biblia esɛngi bakristo bátosa bakonzi oyo bazali liboso, elingi koloba, bakonzi ya baguvɛrnema ya mokili oyo. Kasi baguvɛrnema mosusu etɛmɛlaka Yehova mpe basaleli na ye na ndenge ya polele. Ndenge nini tokoki kotosa bato oyo bazali bakonzi mpe kaka na ntango yango kobatela bosembo na biso epai ya Yehova?

^ NDIMBOLA YA MALOBA: Kobatela bosembo epai ya Yehova esɛngi ete tóbebisa soki moko te bosembo na biso epai na ye mpe na boyangeli na ye ata ntango tomekami.