Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baluki koyeba solo

Baluki koyeba solo

Koyeba solo ekoki kobikisa bomoi na biso. Na ndakisa, tólobela ndenge bomoi ya bato ebongwani ntango bazwaki eyano na motuna oyo: Ndenge nini bamaladi mabe epanzanaka?

Banda bambula mingi, moto moko te ayebaki mpenza eyano na motuna wana. Kasi, bamaladi mabe ebomaki bamilio ya bato. Nsukansuka, bato ya siansi bazwaki eyano na motuna yango. Bamonaki ete mbala mingi bamaladi mabe eutaka nde na bamikrobɛ, lokola bavirisi to ba-bactérie. Koyeba solo wana, esalisi bato bámibatela na bamaladi mpe bábikisa bamaladi mingi, mpe yango esali ete bato ebele bákoma koumela mingi na bomoi mpe bázala na sante malamu.

Bongo mpo na mituna mosusu ya ntina mingi? Okozwa nini soki oyebi biyano na mituna oyo?

  • Tokoki koyeba Nzambe?

  • Yesu Kristo azali nani?

  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

  • Bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ekoya?

Bato ebele mpenza bazwá biyano na mituna wana mpe bomoi na bango ebongwana. Yo mpe okoki kozwa biyano yango.

OKOKI KOYEBA SOLO!

Mbala mosusu, okoki komituna: ‘Ndenge nini nakoki mpenza koyeba solo na likambo moko boye?’ Kutu, emonanaka ete koyeba solo na makambo mingi ezali se kokóma mpasi. Mpo na nini?

Bato mingi bandimaka te makambo oyo baguvɛrnema, bakompanyi, baradio, batelevizyo mpe bazulunalo elobaka. Bayebaka mpenza te soki makambo bazali koyebisa bango ezali solo to ezali kaka makanisi ya bato, to babombeli bango makambo mosusu, to mpe bazali kokosa bango. Bato batyelanaka lisusu motema te mpe bansango mingi ezali ya lokuta, yango wana bandimaka lisusu te makambo oyo ezali mpenza solo, ata mpe makambo oyo etali bango.

Atako mikakatano wana, tokoki mpenza koyeba biyano ya solo na mituna ya ntina mingi etali bomoi. Ndenge nini? Salelá mayele oyo osalelaka mokolo na mokolo mpo na kozwa biyano na mituna oyo ezali na ntina mingi te.

OYO OSENGELI KOSALA MPO NA KOYEBA SOLO

Mbala mosusu, olukaka koyeba solo mikolo nyonso. Tótalela ndakisa ya Jessica. Alobi boye: “Soki mwana na ngai alye nguba to asimbi yango to mpe ayoki nsolo na yango, abɛlaka mpenza. Ata soki mwa nguba moke ekɔti na bilei ekoki koboma ye.” Jessica alukaka koyeba soki biloko oyo alingi kosomba ekosala mwana na ye mabe te. Abakisi: “Liboso, natángaka etikɛti malamu mpo na koyeba biloko ya mikemike oyo ezali na kati ya bilei yango. Na nsima, nalukaka koyeba makambo mosusu etali bilei yango; kutu nasololaka na bato ya kompanyi mpo na koyeba soki ata mwa nguba ekɔtaki te ntango bazalaki kosala bilei yango na izini. Natunaka mpe bato mosusu oyo bayebi makambo yango malamu mpo na koyeba soki izini yango esalaka bilei ya malamu.”

Mbala mosusu, biyano oyo Jessica alukaka ezali na ntina mingi koleka biyano na mituna na yo. Kasi lokola Jessica, okoki kozwa biyano soki osaleli mayele oyo:

  • Luká koyeba solo ya makambo.

  • Luká mpe koyeba makambo mosusu.

  • Luká koyeba soki esika ozwi makambo ebongi kotyela yango motema.

Kosala boye ekoki kosalisa yo ozwa biyano ya solo na mituna minene ya bomoi. Na ndenge nini?

BUKU KAKA MOKO OYO ELOBAKA SOLO

Ntango Jessica alukaki koyeba mateya ya Biblia, asalelaki kaka mayele oyo asalelaka soki azali koluka bilei ya malamu mpo na mwana na ye. Alobi: “Kotánga malamumalamu mpe koluka koyeba makambo mosusu esalisaki ngai nayeba solo oyo ezali na Biblia.” Lokola Jessica, bato ebele mpenza bayebi biyano oyo Biblia epesi na mituna oyo:

  • Mpo na nini tozali na mabele?

  • Moto akendaka wapi soki akufi?

  • Mpo na nini bampasi ezali?

  • Nzambe akosala nini mpo na kosilisa bampasi nyonso?

  • Okoki kosala nini mpo na kozala na libota ya esengo?

Okoki kozwa biyano oyo ebongi na mituna oyo mpe na mituna mosusu soki ozali kotánga Biblia mpe koluka koyeba makambo mosusu na site Internet www.ps8318.com.