Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bato ya komikitisa bakozwa mabele”

“Bato ya komikitisa bakozwa mabele”

Mingi na biso tosilá komona bato bazali kosala mabe mpe basusu bazali kosala malamu; bato mabe bazali konyokola bato oyo bazali kosala malamu. Makambo ya kozanga bosembo mpe makambo ya mabe ekosila mokolo mosusu?

Nzembo 37 epesi biso eyano ya polele mpe elakisi biso oyo tosengeli kosala lelo oyo. Talá biyano oyo Biblia epesi na mituna ya ntina mingi oyo elandi.

  • Tosengeli kosala nini na bato oyo bazali konyokola biso?​—Vɛrsɛ 1, 2.

  • Nini ekokómela bato mabe?​—Vɛrsɛ 10.

  • Na mikolo ekoya, nini ekokómela bato oyo bazali kosala makambo ya malamu?​—Vɛrsɛ 11, 29.

  • Tosengeli kosala nini lelo oyo?​—Vɛrsɛ 34.

Maloba ya Nzembo 37, oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe, emonisi polele mapamboli oyo ezali kozela na mikolo ekoya bato oyo bazali ‘kotyela Yehova elikya mpe kobatela nzela na ye.’ Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola Biblia mpe oyeba makambo oyo okoki kosala mpo yo ná bandeko mpe baninga na yo bózala na bomoi ya malamu na mikolo ekoya.