Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi

Biloko oyo eleki mingi epai na bango ezipa oyo ezangi

NA MOBU 49 T.B., Petro, Yakobo, mpe Yoane, “baoyo bazalaki makonzí,” bapesaki ntoma Paulo ná Barnabasi, moninga na ye ya mosala, mokumba moko. Bayebisaki bango bákanisaka bakristo oyo bazali babola ntango bazali kosakola epai ya bato ya bikólo. (Gal. 2:9, 10) Ndenge nini bakokisaki mokumba yango?

Mikanda oyo ntoma Paulo akomaki emonisi ete azalaki mpenza kotyela likambo yango likebi. Na ndakisa, akomelaki bakristo ya Korinti ete: “Na likambo ya kokɔngɔla makabo mpo na basantu, kaka ndenge napesaki masangá ya Galatia mitindo, bino mpe bósala ndenge wana. Mokolo nyonso ya liboso na pɔsɔ, mokomoko na bino na ndako na ye mpenza abomba mwa eloko pembeni na kotalela biloko oyo azali na yango, boye ntango nakoya, makabo ekɔngɔlama te na ntango yango. Kasi ntango nakokóma kuna, bato nyonso oyo bokondima na nzela ya mikanda, nakotinda bango bámema likabo na bino ya boboto na Yerusaleme.”​—1 Ko. 16:1-3.

Na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti, Paulo alobelaki lisusu ntina oyo esengelaki kokɔngɔla makabo. Ezalaki mpo ete, “na nzela ya bokokani, biloko oyo eleki mingi epai na bino ezipa sikoyo kozanga na bango.”​—2 Ko. 8:12-15.

Ntango Paulo akomelaki bakristo ya Roma mokanda na mobu soki 56 T.B., etikalaki moke básilisa kokɔngɔla makabo yango. Alobaki boye: “Sikoyo nalingi nakende na Yerusaleme mpo nasalela basantu. Mpo baoyo bazali na Masedonia mpe na Akaya basepeli kopesa biloko na bango likabo epai ya babola oyo bazali na kati ya basantu oyo bazali na Yerusaleme.” (Rom. 15:25, 26) Mwa moke na nsima, Paulo asilisaki mosala oyo bapesaki ye, mpo ntango azongaki na Yerusaleme mpe bakangaki ye kuna, ayebisaki Feliksi, guvɛrnɛrɛ Moroma ete: “Nayaki kotika makabo ya motema mawa na ekólo na ngai, mpe mabonza.”​—Mis. 24:17.

Maloba oyo Paulo ayebisaki bandeko ya Masedonia emonisi polele elimo oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na yango. Alobaki ete “bakobaki kobondela biso makasi mpenza ete bázwa libaku malamu ya kopesa biloko na boboto.” Ntoma Paulo alendisaki bakristo ya Korinti bálanda ndakisa wana. Alobaki ete: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” Nini etindaki bandeko ya masangá bákaba ndenge wana? Mposa na bango ezalaki kaka te ‘mpo na kokokisa malamu bamposa ya basantu, kasi mpe mpo matɔndi mingi epesama na Nzambe.’ (2 Ko. 8:4; 9:7, 12) Biso mpe, tokoki kozala na mokano ya ndenge wana ntango tozali kokaba. Na ntembe te, Yehova Nzambe akopambola biso soki tozali na elimo ya ndenge wana mpe soki tozali koluka kaka matomba na biso moko te, mpamba te lipamboli na ye nde ekómisaka moto mozwi.​—Mas. 10:22.

NDENGE BATO MOSUSU BAPONAKA KOPESA MAKABO MPO NA MOSALA YA BOKONZI NA MOKILI MOBIMBA

Ndenge kaka ezalaki na ntango ya ntoma Paulo, lelo oyo mpe bandeko mingi ‘babombaka mwa eloko pembeni’ to babongisaka mwa mbongo oyo batyaka na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Mosala ya kosakola na mokili mobimba.” (1 Ko. 16:2) Sanza na sanza, masangá etindaka makabo yango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango. Moto akoki kotinda likabo na ye ya mbongo mbala moko na Association Sans But Lucratif “Les Témoins de Jéhovah,” 75, 13Rue, Industriel, Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo, to na biro ya filiale oyo etalelaka mboka na bango. Ba-chèque oyo etindami na adrɛsi oyo totye awa esengeli kozala na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Esengeli kotinda yango nzela moko na mokanda oyo emonisi ete biloko yango ezali nde likabo.

KODEFISA MBONGO

  • Moto akoki kodefisa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba.

  • Nzokande, soki kaka asɛngi mbongo na ye, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, komelá “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa likoló to bengá na 099 818 9791 to na 081 555 1000.

LOLENGE MOSUSU YA KOPESA MAKABO

Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo mosala ya Bokonzi na mokili mobimba ekende liboso. Na ndakisa:

Asiranse: Moto akoki kokoma nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo na ye ya asiranse to ya pasyo soki akufi.

Kofungola kɔnti na banki: Moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya pasyo na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to kotya nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka oyo azali.

Lotomo ya kozwa mosolo: Okoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpenza to kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na yo.

Kopesa lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango na ye likabo, to soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bino.

Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi: Moto akoki kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko oyo Batatoli ya Yehova basalelaka. Na nsima, moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Mpo na yango, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.

Testama: Moto akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.

Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu.

Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga to kokomela “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa na nse, to okoki kokende na biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi.