Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova azali esika na biso ya kofanda

Yehova azali esika na biso ya kofanda

“Ee Yehova, yo nde ozali esika na biso ya kofanda ya solosolo Libota na libota.”​—NZ. 90:1.

1, 2. Basaleli ya Nzambe bamiyokaka ndenge nini na mokili oyo, mpe na ndimbola nini bazali na esika ya kofanda?

 OMONAKA ete na mokili oyo ofandi na kimya mpe likambo ya kobanga ezali te? Soki te, yebá ete ozali yo moko te! Banda kala, bato nyonso oyo bazalaki mpenza kolinga Yehova bazalaki komimona lokola bapaya na mokili oyo. Na ndakisa, ntango basambeli ya sembo ya Nzambe bazalaki kolongola kaa awa, batye yango kuna, batye awa, batye kuna, na mokili ya Kanana, “basakolaki polele ete bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.”​—Ebr. 11:13.

2 Bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali “bana-mboka ya likoló,” bamimonaka mpe lokola ‘bapaya mpe bato oyo bafandi mpo na ntango mokuse’ na mokili oyo. (Flp. 3:20; 1 Pe. 2:11) “Bampate mosusu” ya Kristo mpe “bazali bato ya mokili te, ndenge [Yesu mpe azalaki] moto ya mokili te.” (Yoa. 10:16; 17:16) Atako bongo, basaleli ya Nzambe bazali na esika na bango ya kofanda. Kutu, na esika yango tobatelami malamu koleka mpe balingaka biso mingi koleka na bisika mosusu nyonso, mpe esika yango emonanaka kaka na miso ya kondima. Moize akomaki ete: “Ee Yehova, yo nde ozali esika na biso ya kofanda ya solosolo Libota na libota.” * (Nz. 90:1) Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali ‘esika ya kofanda ya solosolo’ mpo na basaleli na ye ya sembo ya ntango ya kala? Ndenge nini azali ‘esika ya kofanda ya solosolo’ mpo na bato na ye lelo oyo? Mpe ndenge nini akomonisa ete azali esika kaka moko ya libateli mpo na basaleli na ye na mikolo ezali koya?

YEHOVA AZALAKI ‘ESIKA YA KOFANDA YA SOLOSOLO’ MPO NA BASALELI NA YE YA NTANGO YA KALA

3. Na Nzembo 90:1, motó ya likambo ezali nini, elilingi ezali nini, mpe bokokani ezali nini?

3 Lokola maloba mingi ya elilingi oyo ezali na Biblia, Nzembo 90:1 ezali na motó ya likambo (sujet), na elilingi (image), mpe na bokokani (points de similarité). Motó ya likambo ezali Yehova. Elilingi ezali ndako to esika ya kofanda. Na makambo mingi, Yehova azali lokola esika ya ndenge wana. Na ndakisa, Yehova abatelaka basaleli na ye. Mpo na nini Biblia ekokanisi Yehova na ndako to esika ya kofanda? Mpamba te, Yehova azali bolingo. (1 Yoa. 4:8) Azali mpe Nzambe ya kimya oyo asalaka ete basaleli na ye ya sembo ‘báfanda na kimya.’ (Nz. 4:8) Na ndakisa, tótala ndenge oyo azalaki lokola ndako mpo na basaleli na ye ya sembo, kobanda na Abrahama.

4, 5. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azali ‘esika ya kofanda ya solosolo’ mpo na Abrahama?

4 Tokoki kokanisa ndenge oyo Abrahama, oyo liboso azalaki kobengama Abrama, amiyokaki ntango Yehova alobaki na ye: “Longwá na mboka na yo mpe tiká bandeko na yo . . . kende na mboka oyo nakolakisa yo.” Soki azalaki komitungisa, na ntembe te komitungisa na ye ekitaki ntango Yehova abakisaki maloba oyo: “Nakosala ete ekólo moko monene euta na yo mpe nakopambola yo mpe nakokómisa nkombo na yo monene. . . . Mpe nakopambola baoyo bazali kopambola yo, mpe ye oyo azali kolakela yo mabe, nakolakela ye mabe.”​—Eba. 12:1-3.

5 Na maloba wana, Yehova amonisaki ete ye moko azalaki esika ya kofanda na kimya mpo na Abrahama mpe bakitani na ye. (Eba. 26:1-6) Yehova akokisaki elaka na ye. Na ndakisa, atikaki te ete Farao mokonzi ya Ezipito mpe Abimeleke, mokonzi ya Gerare, báboma Abrahama mpe bázwa mwasi na ye Sara. Abatelaki Yisaka mpe Rebeka kaka ndenge wana. (Eba. 12:14-20; 20:1-14; 26:6-11) Biblia elobi ete: “[Yehova] apesaki moto moko te nzela apunza bango, kasi apamelaki bakonzi mpo na bango, alobaki: ‘Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta, mpe bósala basakoli na ngai eloko moko te ya mabe.’”​—Nz. 105:14, 15.

“Nakotika yo te”

6. Yisaka ayebisaki Yakobo asala nini, mpe ekoki kozala ete Yakobo amiyokaki ndenge nini?

6 Na basakoli yango, tokoki kotánga Yakobo, mwana ya Abrahama. Ntango Yakobo alingaki kobala mwasi, Tata na ye Yisaka alobaki na ye boye: “Osengeli te kozwa mwasi kati na bana basi ya Kanana. Tɛlɛmá, kende na Padane-arame na ndako ya Betuele tata ya mama na yo mpe kuna ozwa mwasi kati na bana basi ya Labana ndeko mobali ya mama na yo.” (Eba. 28:1, 2) Yakobo atosaki Yisaka mbala moko. Yakobo atikaki libota na ye na Kanana, esika oyo azalaki na libateli, mpe asalaki mobembo ya bankama ya bakilomɛtrɛ, ntango mosusu ye moko, tii na mboka Harane. (Eba. 28:10) Ekoki kozala ete azalaki komituna: ‘Nakoumela kuna ntango boni? Nɔkɔ na ngai akoyamba ngai malamu mpe akopesa ngai mwasi oyo abangaka Nzambe?’ Soki makanisi ya ndenge wana ezalaki kotungisa Yakobo, na ntembe te, esilaki ntango akómaki na Luze, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 100 na Beere-sheba. Nini esalemaki na Luze?

7. Na nzela ya ndɔtɔ, ndenge nini Nzambe alendisaki Yakobo?

7 Na Luze, Yehova abimelaki Yakobo na ndɔtɔ, mpe alobaki ete: “Talá nazali elongo na yo mpe nakobatela yo na nzela nyonso oyo ozali kokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, mpo nakotika yo te kino nakosilisa mpenza kosala oyo nalobi na yo.” (Eba. 28:15) Na ntembe te, maloba wana ya boboto elendisaki Yakobo mpe ebɔndisaki ye! Meká kokanisa ndenge oyo Yakobo azalaki kotambola mpe azalaki na mposa makasi ya komona ndenge oyo Nzambe akokokisa maloba na ye! Soki otiká mboka na yo, mbala mosusu mpo na kokende kosakola na mboka mopaya, na ntembe te oyebi malamu ndenge oyo Yakobo azalaki komiyoka. Atako bongo, omonaki mpenza na miso ete Yehova amibanzabanzaka mpo na yo.

8, 9. Na ndenge nini Yehova amonisaki ete azali ‘esika ya kofanda ya solosolo’ mpo na Yakobo, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

8 Ntango Yakobo akómaki na Harane, nɔkɔ na ye Labana ayambaki ye malamu, na nsima apesaki ye Lea ná Rashele, mpo bákóma basi na ye. Kasi na nsima, Labana alukaki kolyela Yakobo, mpe abongolaki lifuti na ye mbala zomi! (Eba. 31:41, 42) Atako bongo, Yakobo alɛmbaki nzoto te mpo na makambo wana ya kozanga bosembo; azalaki na kondima ete Yehova akokoba kosunga ye, mpe Yehova asalaki yango! Kutu, ntango Nzambe ayebisaki Yakobo azonga na Kanana, Yakobo “akómaki na bitonga minene ná basaleli ya basi ná basaleli ya mibali ná bakamela mpe bampunda.” (Eba. 30:43) Mpo na komonisa botɔndi makasi oyo azalaki na yango, Yakobo abondelaki ete: “Ngai nabongi te na motema boboto nyonso mpe na bosembo nyonso oyo omoniseli mosaleli na yo, mpo kaka na lingenda na ngai oyo nde nakatisaki Yordani oyo mpe sikoyo nakómi bituluku mibale.”​—Eba. 32:10.

9 Maloba oyo Moize alobaki na libondeli moko ezali mpenza solo; abondelaki ete: “Ee Yehova, yo nde ozali esika na biso ya kofanda ya solosolo Libota na libota”! (Nz. 90:1) Maloba wana ezali solo tii lelo mpamba te Yehova “abongwanaka te lokola elili,” azali kokoba kozala esika malamu ya libateli mpo na basaleli na ye ya sembo. (Yak. 1:17) Tótala ndenge nini asalaka yango.

YEHOVA AZALI “ESIKA NA BISO YA KOFANDA YA SOLOSOLO” LELO OYO

10. Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova azali kokoba kozala esika ya kofanda na kimya mpo na basaleli na ye?

10 Kanisá ete ozali kosamba na tribinale ná ebongiseli moko ya bato ya mobulu oyo eyebani mokili mobimba. Mokambi na yango azali na mayele mpe na nguya mingi, azali mobuki monene ya lokuta, mpe mobomi. Okomiyoka ndenge nini ntango obimi na tribinale yango na nsuka ya mokolo mpe olingi kozonga ndako? Okomona ete ozali na libateli? Soki moke te! Na ntembe te, okoluka ete bábatela yo. Ndenge moko mpe, biso basaleli ya Yehova tozali kopesa litatoli mpo na Yehova na mpiko nyonso, mpe kozanga kobanga tozali kobimisa polele mayele mabe ya Satana, monguna na ye monene! (Tángá Emoniseli 12:17.) Kasi, Satana alongi nde kokangisa basaleli ya Nzambe monɔkɔ? Te! Kutu, tozali se kokoba kokende liboso na elimo; yango ezali komonisa ete Yehova azali esika na biso ya komibomba, ‘esika ya kofanda ya solosolo’ mpo na biso, mingimingi na mikolo oyo ya nsuka. (Tángá Yisaya 54:14, 17.) Kasi, Yehova akoki kozala esika na biso ya kofanda na kimya kaka soki toboyi kotikela Satana nzela akosa biso.

Baanzelu ya Nzambe basalisaka mpe babatelaka basaleli na ye

11. Liteya nini mosusu tokoki kozwa na ndakisa ya Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo?

11 Ezali na liteya mosusu oyo tokoki kozwa epai ya Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo. Atako bazalaki kofanda na mokili ya Kanana, bazalaki te kosangana na bato ya mokili yango, mpe bazalaki koyina misala na bango ya mabe mpe ya mbindo. (Eba. 27:46) Bazalaki te na mposa ya liste molai ya mibeko mpo na koyeba nini basengelaki kosala mpe nini basengelaki kosala te. Makambo oyo bayebaki mpo na Yehova mpe bomoto na ye ekokaki mpo na bango. Lokola Yehova azalaki esika na bango ya kofanda, balingaki te kozala bato ya mokili. Bazalaki kokɔta na makambo ya mokili ata moke te. Batikelá biso ndakisa ya malamu mpenza! Osalaka makasi olanda ndakisa ya basaleli wana ya sembo ya Nzambe ntango ozali kopona baninga mpe kominanola? Likambo ya mawa, bandeko mosusu na kati ya lisangá bamonisaka ete balingaka, ata mwa moke, mokili oyo ya Satana. Soki na motema na yo oyokaka ete olingaka mokili, ata mwa moke, bondelá mpo na yango. Kobosana likambo oyo te: mokili oyo ezali ya Satana. Emonisaka elimo oyo Satana azalaka na yango ya kotyela basusu likebi te mpe ya koluka kaka matomba na ye moko.​—2 Ko. 4:4; Ef. 2:1, 2.

12. (a) Bibongiseli nini Yehova azwá mpo na basaleli na ye? (b) Omiyokaka ndenge nini mpo na bibongiseli yango?

12 Mpo tótɛmɛla mayele mabe ya Satana, tosengeli kosalela bibongiseli nyonso ya elimo oyo Yehova azali kozwa mpo na basaleli na ye, oyo batalelaka ye lokola esika na bango ya kofanda. Na bibongiseli yango, tokoki kotánga makita ya lisangá, losambo na kati ya libota, mpe “makabo oyo ezali bato” elingi koloba bankulutu oyo Nzambe aponi mpo na kobɔndisa mpe kosalisa biso ntango tozali kobundana na mikakatano ya bomoi. (Ef. 4:8-12) Ndeko George Gangas, oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi na boumeli ya bambula mingi, akomaki boye: “Ntango nazali elongo [na bato ya Nzambe], namiyokaka mpenza ete nazali na kati ya libota na ngai, na kati ya paradiso ya elimo.” Yo mpe omiyokaka ndenge wana?

13. Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na Baebre 11:13?

13 Ezaleli mosusu ya ntina mingi oyo tokoki komekola epai ya Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo ezali ndenge oyo bandimaki kokesana ná bato oyo bazalaki zingazinga na bango. Ndenge tomonaki yango na  paragrafe 1, “basakolaki polele ete bazali bapaya mpe bato oyo bafandi na mokili yango mpo na ntango mokuse.” (Ebr. 11:13) Yo mpe ozali na ekateli ya kokesana ná bato ya mokili oyo? Ezali solo ete kosala bongo ezalaka pɛtɛɛ te. Kasi na lisalisi ya Nzambe mpe ya bandeko na yo bakristo, okoki kolonga. Kobosana likambo oyo te: ozali yo moko te. Bato nyonso oyo balingi kosalela Yehova bazali kobunda etumba! (Ef. 6:12) Atako bongo, tokoki kolonga etumba yango soki totyeli Yehova motema mpe tokómisi ye esika na biso ya kofanda na kimya.

14. Basaleli ya Yehova bazalaki kozela “engumba” nini?

14 Tosengeli mpe komekola Abrahama na oyo etali kotya miso na libonza. (2 Ko. 4:18) Ntoma Paulo akomaki ete Abrahama “azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.” (Ebr. 11:10) “Engumba” yango ezali Bokonzi ya Masiya. Ezali solo ete Abrahama asengelaki kozela “engumba” yango. Kasi, tokoki koloba ete biso tozali kozela yango te, mpamba te Bokonzi yango ezali koyangela sikoyo na likoló. Longola yango, bilembeteli mingi emonisi ete etikali moke ebanda koyangela mabele mobimba. Mpo na yo, Bokonzi yango ezali likambo ya solo? Ebongolaka ndenge na yo ya kotalela bomoi, mokili oyo, mpe makambo oyo osengeli kotya na esika ya liboso?​—Tángá 2 Petro 3:11, 12.

“ESIKA NA BISO YA KOFANDA YA SOLOSOLO” LOKOLA NSUKA EKÓMI PENE

15. Nini ekokómela bato oyo batyaka elikya na mokili oyo?

15 Lokola mokili ya Satana ekómi pene na nsuka, “bampasi” ekobakisama. (Mat. 24:7, 8) Makambo ekobeba lisusu koleka na ntango ya bolɔzi monene. Bandako mpe biloko mosusu ekobebisama mpe mobulungano ekokɔta; bato bakobanga makasi. (Hab. 3:16, 17) Lokola bato mingi bakomona ete bazali na elikya te, bakokende komibomba “na kati ya mibenga mpe na kati ya mabanga ya bangomba.” (Em. 6:15-17) Ata soki ekozala mibenga ya solo to bibongiseli ya politiki mpe ya mombongo oyo ezali lokola bangomba, ekobatela bango te.

16. Ndenge nini tosengeli kotalela lisangá, mpe mpo na nini?

16 Nzokande, basaleli ya Yehova bakokoba kozwa libateli epai ya Yehova Nzambe, ‘esika na bango ya kofanda ya solosolo.’ Lokola mosakoli Habakuku, ‘bakosepela makasi na Yehova ye moko.’ ‘Bakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na [bango].’ (Hab. 3:18) Ndenge nini Yehova akomonisa ete azali ‘esika ya kofanda ya solosolo’ na ntango wana ya yikiyiki? Ekosɛnga tózela mpo tómona nini akosala. Kasi, tosengeli kondima likambo oyo: Kaka ndenge esalemaki ntango Bayisraele babimaki na boombo na Ezipito, “ebele mpenza ya bato” bakokoba kozala bato oyo babongisami mpe bazali kolanda litambwisi na ye. (Em. 7:9; tángá Kobima 13:18.) Na nzela nini bakozwa litambwisi yango? Ekoki kozala ete Yehova akopesa yango na nzela ya lisangá. Ekoki kozala ete bankóto ya masangá oyo ezali na mokili mobimba nde ezali ‘bashambrɛ ya kati’ mpo na kobatela, oyo Biblia elobeli na Yisaya 26:20. (Tángá.) Omonaka ete makita ya lisangá ezali na ntina mingi? Otosaka nokinoki malako oyo Yehova apesaka na nzela ya lisangá?​—Ebr. 13:17.

17. Na ndimbola nini Yehova azali ‘esika ya kofanda ya solosolo’ ata mpo na basaleli na ye ya sembo oyo bakufá?

17 Ata bandeko oyo bakokufa sembo liboso ete bolɔzi monene ebanda bakozala kaka na libateli epai ya Yehova, ‘esika na bango ya kofanda ya solosolo.’ Na ndenge nini? Bambula mingi nsima ya liwa ya Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo, Yehova ayebisaki Moize ete: “Ngai nazali Nzambe ya . . . Abrahama, Nzambe ya Yisaka mpe Nzambe ya Yakobo.” (Kob. 3:6) Yesu mpe azongelaki maloba wana, na nsima abakisaki ete: “Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi, mpo epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:38) Ya solo, na miso ya Yehova, basaleli na ye oyo bakufaki sembo bazali kaka na bomoi, mpamba te akozanga te kosekwisa bango.​—Mos. 7:1.

18. Na mokili ya sika, ndenge nini Yehova akomonisa ete azali ‘esika ya kofanda ya solosolo’ mpo na basaleli na ye?

18 Na mokili ya sika oyo ekómi mpenza pene, Yehova akokóma ‘esika ya kofanda ya solosolo’ mpo na basaleli na ye na ndimbola mosusu. Emoniseli 21:3 elobi ete: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango.” Na ebandeli, Yehova akofanda na basaleli na ye oyo bakozwa bomoi awa na mabele na nzela ya Yesu Kristo. Na nsuka ya boyangeli ya mbula nkóto, Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye, nsima ya kokokisa mokano nyonso oyo Yehova azalaki na yango mpo na mabele. (1 Ko. 15:28) Nsima na yango, bato ya kokoka bakozala lisusu te na mposa ete Yesu azala molobeli na bango epai ya Nzambe; Yehova akozala elongo na bango. Oyo nde mapamboli kitoko ezali kozela biso! Kasi liboso tókóma kuna, tósala makasi mpo na komekola bato ya sembo ya ntango ya kala, mpe tókómisa Yehova “esika na biso ya kofanda ya solosolo.”

^ par. 2 Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli Nzembo 90:1 boye: “Nkolo, bileko na bileko, yo moto ozalaka Esika na biso ya kobombana.”