Lakisá makambo oyo ezali na kati

Teyá bana na yo

Seme amonaki mabe ya mikili mibale

Seme amonaki mabe ya mikili mibale

SEME, mwana ya Noa abikaki ntango Nzambe abomaki mokili mpo na mbala ya liboso, mpe akobaki kozala na bomoi na mokili ya mibale. Oyebi mpo na nini mokili ya liboso ebomamaki mpe ndenge nini Seme mpe libota na ye babikaki mpe bakɔtaki na mokili ya mibale?​— * Tiká tólobela yango.

Ntango Seme azalaki elenge, Biblia elobi ete “mabe ya moto” ezalaki mingi. Makanisi ya bato ezalaki “mabe ntango nyonso.” Oyebi oyo Nzambe asalaki?​—Ayeisaki mpela oyo ebebisaki mokili wana mabe. Ntoma Petro akomaki boye: “Mokili ya ntango wana ebebisamaki ntango ezindaki na mai.”​—Ebandeli 6:5; 2 Petro 3:6.

Omoni ntina oyo Nzambe abomaki mokili yango?​—Bato bazalaki mabe mpe bazalaki kokanisa “mabe ntango nyonso.” Yesu alobelaki yango. Alobaki ete “liboso ya mpela,” bato bazalaki komipesa na bisengo “bazalaki kolya mpe komɛla, mibali bazalaki kobala mpe basi bazalaki kobalisama.” Yesu abakisaki boye: “Batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”​—Matai 24:37-39.

Bato yango batyaki likebi te na likambo nini?​—Noa, tata ya Seme azalaki “mosakoli ya boyengebene,” kasi bato baboyaki koyoka makambo oyo azalaki koyebisa bango. Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa, oyo ye ná libota na ye basengelaki kokɔta mpo na kobika na Mpela. Kaka Noa, mwasi na ye, mpe bana na bango Seme, Kame mpe Yafete ná basi na bango nde batyaki likebi na makambo oyo Nzambe asɛngaki bango básala. Bato nyonso mosusu bazalaki kosala kaka oyo bango moko balingaki kosala, yango wana babomamaki na Mpela.​—2 Petro 2:5; 1 Petro 3:20.

Mbula soki moko nsima ya Mpela, ntango mai ekaukaki, Seme mpe libota na ye babimaki na masuwa. Bato nyonso ya mabe bakufaki, kasi eumelaki te mabe ezongaki lisusu. Kanana, mwana ya Kame, ndeko ya Seme, asalaki likambo moko ya mabe mpenza yango wana Noa alobaki na ye boye: “Kanana alakelama mabe.” Nimerode, nkɔkɔ ya Kame, azalaki mpe moto mabe. Atɛmɛlaki Yehova, Nzambe ya solo, mpe atindaki bato bátonga Babele, ndako moko molai, mpo bámisalela nkombo. Mpo na yo, Seme ná tata na ye bayokaki ndenge nini mpo na likambo yango?​—Ebandeli 9:25; 10:6-10; 11:4, 5.

Esalaki bango mpasi na motema, esalaki mpe Yehova mpasi. Oyebi oyo Yehova asalaki?​—Abulunganisaki monɔkɔ ya bato mpo báyokana lisusu te. Mpo na yango, bato batikaki kotonga ndako yango mpe baoyo bazalaki koloba monɔkɔ moko bakendaki kofanda bisika ndenge na ndenge. (Ebandeli 11:6-9) Kasi, Nzambe abongolaki te monɔkɔ oyo Seme ná libota na ye bazalaki koloba. Yango wana, bakokaki kotikala esika moko mpe kosalisana mpo na kosalela Nzambe. Oyebi mbula boni Seme asalelaki Yehova?—​

Seme aumelaki mbula 600. Mbula 98 liboso ya Mpela mpe mbula 502 nsima ya Mpela. Tokoki kondima ete asalisaki Noa atonga masuwa mpe akebisa bato mpo na Mpela oyo elingaki koya. Kasi, okanisi ete Seme asalaki nini na boumeli ya mbula koleka 500 nsima ya Mpela?— Noa abengaki Yehova “Nzambe ya Seme.” Na ntembe te, Seme akobaki kosalela Yehova mpe kosalisa bato ya libota na ye básala mpe bongo. Abrahama, Sara mpe Yisaka bazalaki mpe bato ya libota ya Seme.​—Ebandeli 9:26; 11:10-31; 21:1-3.

Kanisá sikoyo mokili na biso, oyo ezali se kotɔnda na mabe banda mikolo ya Seme. Nini ekokómela yango?— Biblia elobi ete: “Ezali koleka.” Kasi, simbá elaka oyo: “Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” Na yango, soki tozali kosala mokano ya Nzambe, tokozala na kati ya bato oyo bakobika mpe bakokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Na ntango yango, na lisalisi ya Nzambe tokozala na bomoi libela na libela na esengo awa na mabele!​—1 Yoane 2:17; Nzembo 37:29; Yisaya 65:17.

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.