Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liteya 4: Nzambe azali Bosato

Liteya 4: Nzambe azali Bosato

Liteya yango eutá wapi?

“Nsima ya kotalela likambo yango, emonani lokola ete liteya ya Bosato ebimaki na nsuka ya ekeke ya minei. Mpe ekoki kozala bongo . . . Liboso ya nsuka ya ekeke ya minei, maloba ‘Nzambe moko na bapersona misato’ ezwaki naino misisa te, mpe ekɔtaki naino malamumalamu te na bomoi ya bakristo mpe na bindimeli na bango.”​—New Catholic Encyclopedia (1967), Volimi 14, lokasa 299.

“Likita monene oyo babengi concile de Nicée esalemaki na mokolo ya 20 Mai 325 [ya ntango na biso (T.B.)]. Constantin ye moko akambaki likita yango, atambwisaki masolo, mpe ye moko apesaki likanisi . . . mpo na ndenge ya kolobela esika ya Kristo liboso ya Nzambe na bindimeli ya lingomba oyo esengelaki kondimama na likita yango, ete ‘Mwana azali kaka ndenge moko na Tata.’ . . . Lokola baepiskɔpɔ babangaki amperɛrɛ, bango nyonso, longola kaka mibale, batyaki sinyatire na mokanda yango; mingi kati na bango basalaki yango atako bandimaki makanisi yango te.”​—Encyclopædia Britannica (1970), Volimi 6, lokasa 386.

Biblia elobi nini?

Stefano “atóndí na Elímo Sántu, atálí epái ya likoló mpé amóní nkémbo ya Nzámbe, ná mpé Yézu atélémí o lobóko la mobáli la Nzámbe. Alobí: ‘A! Namóní likoló lifungwámí mpé Mwána wa Moto atélémi o lobóko la mobáli la Nzámbe.’”​—Bikela (Misala) 7:55, 56, Biblia Liloba lya Nzambe.

Emonaneli wana emonisi nini? Ntango Stefano atondaki na nguya ya Nzambe, amonaki Yesu “atélémí o lobóko la mobáli la Nzámbe.” Na yango, emonani polele ete Yesu akómaki Nzambe te ntango azongaki na likoló nsima ya lisekwa na ye, kasi azalaki nde ekelamu ya elimo oyo akeseni na Nzambe. Lisolo yango elobi mpe te ete moto ya misato azalaki pembeni ya Nzambe. Atako bato basali milende mpo na koluka bavɛrsɛ oyo ekolongisa liteya ya Bosato, Marie-Émile Boismard, sango moko (dominicain) akomaki na buku na ye (À l’aube du christianisme​—La naissance des dogmes) ete: “Maloba oyo elobi ete ezali na bapersona misato na Nzambe moko . . . ezali ata na esika moko te na Boyokani ya Sika.”

Constantin abimisaki liteya wana mpo na kosilisa bokabwani oyo ezalaki na Lingomba na ekeke ya minei. Nzokande, liteya yango ebimisaki nde motuna mosusu: Maria, mwasi oyo abotaki Yesu, azalaki nde “Mama ya Nzambe”?

Kokanisá bavɛrsɛ oyo ya Biblia: Matai 26:39; Yoane 14:28; 1 Bakorinti 15:27, 28; Bakolose 1:15, 16

LIKAMBO YA SOLO:

Liteya ya Bosato ebimaki na nsuka ya ekeke ya minei