Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Akitisaki Yehova motema’

‘Akitisaki Yehova motema’

Pusaná penepene na Nzambe

‘Akitisaki Yehova motema’

MOTO moko oyo atikaki mpo na mwa ntango kotosa mitinda ya Nzambe oyo ayekolaki banda bomwana, alobaki boye: “Namiyokaki ete nabongi lisusu te.” Ntango azwaki ekateli ya kobongisa lisusu bomoi na ye, abangaki ete Nzambe akolimbisa ye lisusu te. Kasi, mosumuki wana oyo abongolaki motema azwaki elikya na lisolo ya Manase oyo ezali na 2 Ntango 33:1-17. Soki oyokaka ete obongi te mpo na masumu oyo osalaki kala, yo mpe okoki kozwa libɔndisi na lisolo ya Manase.

Manase abɔkwamaki na libota oyo ezalaki kobanga Nzambe. Tata na ye Hizikiya, azalaki moko ya bakonzi ya Yuda oyo atikaki ndakisa monene. Manase abotamaki soki mbula misato na nsima ya likamwisi oyo Nzambe asalaki ya kobakisela tata na ye mikolo ya bomoi. (2 Bakonzi 20:1-11) Na ntembe te, Hizikiya amonaki ete mwana wana azali mpenza likabo oyo azwaki mpo na motema mawa ya Nzambe mpe alukaki kokɔtisa na motema na ye bolingo mpo na losambo ya pɛto. Kasi, bana oyo baboti na bango babangaka Nzambe balandaka ntango nyonso te ndakisa ya baboti na bango. Ezalaki mpe bongo mpo na Manase.

Manase azalaki na mbula koleka 12 te ntango tata na ye akufaki. Likambo ya mawa, Manase “asalaki oyo ezali mabe na miso ya Yehova.” (Vɛrsɛ 1, 2) Ekoki kozala ete elenge yango alandaki toli ya bapesi-toli oyo bazalaki na limemya moko te mpo na losambo ya solo? Biblia elobi te. Elobi kaka ete Manase akómaki mosambeli monene ya bikeko mpe moto mabe mpenza. Atɛlɛmisaki bitumbelo mpo na banzambe ya lokuta, apesaki bana na ye moko mbeka, asalaki misala ya maji, mpe atyaki ekeko oyo eyemami na tempelo ya Yehova na Yerusaleme. Manase, moto wana ya motó makasi, aboyaki koyoka makebisi oyo Yehova azalaki kotindela ye mbala na mbala; Nzambe oyo asalaki likamwisi oyo esalaki ete ye abotama.​—Vɛrsɛ 3-10.

Nsukansuka Yehova atikaki nzela ete Manase akangama na bikangeli mpe amemama na Babilone. Kuna, ntango azalaki na mboka mopaya, Manase azwaki libaku ya kokanisa lisusu na lolenge ya bomoi na ye. Amonaki sikoyo ete bikeko wana oyo ezangá bomoi ebatelaki ye te? Akanisaki makambo oyo tata na ye oyo azalaki kobanga Nzambe ateyaki ye ntango azalaki naino mwana? Ata soki ezalaki bongo to te, Manase abongolaki motema. Biblia elobi boye: “Akitisaki Yehova Nzambe na ye motema mpe amikitisaki mingi . . . Mpe azalaki kobondela Ye.” * (Vɛrsɛ 12, 13) Kasi, ndenge nini Nzambe akokaki kolimbisa moto oyo asalaki masumu ya minene ndenge wana?

Ndenge oyo Manase abongolaki mpenza motema, esepelisaki Yehova. Nzambe ayokaki malɔmbɔ oyo asalaki mpo na kosɛnga motema mawa “mpe azongisaki ye na Yerusaleme na bokonzi na ye.” (Vɛrsɛ 13) Na nsima, mpo na komonisa ete abongoli mpenza motema, Manase asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kobongisa mabe oyo asalaki, alongolaki bikeko na teritware ya bokonzi na ye mpe alendisaki bato “básalela Yehova.”​—Vɛrsɛ 15-17.

Soki ozali komona ete obongi te ete Nzambe alimbisa yo mpo na masumu oyo osalaki kala, zwá makasi na ndakisa ya Manase. Lisolo yango ezali na kati ya Liloba ya Nzambe oyo ekomami na litambwisi ya elimo santu. (Baroma 15:4) Na ntembe te, Yehova alingi biso tóyeba ete ‘asepelaka kolimbisa.’ (Nzembo 86:5) Nzambe atalaka nde motema ya mosumuki, kasi te masumu oyo asali. Mosumuki oyo azali kobondela na motema oyo eyoki mpenza mawa mpo na lisumu oyo asali, atiki nzela na ye ya mabe, mpe asali milende mpo na kosala oyo ezali malamu akoki ‘kokitisa Yehova motema,’ ndenge Manase asalaki.​—Yisaya 1:18; 55:6, 7.

Botángi ya biblia mpo na sanza ya Yanuali

2 Ntango 29-36Ezera 1-10

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Aluki kokitisa motema mwa Yawe.”