Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Nzambe alingaki ye, baninga na ye mpe balingaki ye

Nzambe alingaki ye, baninga na ye mpe balingaki ye

MOTO moko te lelo ayebi nkombo na ye. Ayebani lelo oyo kaka na nkombo ya tata na ye Yefeta. Tótala na kati ya Biblia mpe tóyekola makambo oyo elobelami mpo na bango mibale. Tokomona ete Nzambe alingaki mwana mwasi ya Yefeta, baninga na ye mpe balingaki ye.

Tokoki kotánga lisolo ya Yefeta mpe mwana ye ya mwasi na Biblia na Basambisi mokapo 11. Lokola azalaki mosaleli ya sembo ya Nzambe, na ntembe te Yefeta azalaki ntango nyonso kosolola ná mwana na ye na Makomami.

Yefeta azalaki na bomoi liboso bana ya Yisraele básɛnga ete mokonzi moko ya moto ayangela bango. Yefeta azalaki mobali ya mpiko oyo azalaki elombe ya etumba. Na yango, Bayisraele basɛngaki ye akamba bango mpo na kobunda na Baamone, ekólo moko ya pembeni oyo ezalaki kobundisa Bayisraele.

Yefeta azalaki na mposa ya lisalisi ya Nzambe mpo na kolonga Baamone, mpo na yango asalaki elako. Yefeta alobaki ete soki Yehova apesi ye elonga, akopesa Yehova moto ya liboso oyo akobima na ndako na ye ntango akozonga na etumba. Moto yango akosala na bomoi na ye mobimba na tabernakle ya Nzambe​—esika oyo bato bazalaki kosambela Nzambe na mikolo wana. Oyebi moto oyo abimaki liboso? *

Ɛɛ, ezalaki mwana mwasi ya Yefeta! Yefeta ayokaki mawa makasi. Azalaki kaka na mwana moko. Kasi, asalaki elako epai ya Yehova mpe asengelaki kotosa yango. Kaka na ntango wana, mwana yango alobaki ete: “Tata na ngai, soki ofungolaki monɔkɔ na yo epai ya Yehova, salá ngai na ndenge oyo ekokani na maloba oyo ebimaki na monɔkɔ na yo.” Na nsima, asɛngaki ete azala ye moko sanza mibale mpo akoka kokende na bangomba mpo na kolela. Mpo na nini azalaki na mawa? Mpamba te, kotosa elako oyo tata na ye asalaki, esɛngaki ye atika lotomo na ye ya kobala mpe kobota bana. Atako bongo, atalelaki te bamposa na ye lokola nde ezali na ntina mingi koleka. Azalaki na mposa ya kotosa tata na ye mpe kozala sembo epai ya Yehova. Okanisi ete asepelisaki Yehova mpe tata na ye?

Na yango, Yefeta atikaki mwana na ye akende mpo na sanza mibale elongo na baninga na ye ya basi. Ntango azongaki, tata na ye akokisaki elako oyo asalaki mpe atindaki ye na tabernakle ya Nzambe na Shilo mpo na kosalela Nzambe bomoi na ye mobimba. Mbula na mbula, bilenge basi ya Yisraele bazalaki kokende na Shilo mpe kolendisa mwana ya Yefeta.

Oyebi bilenge oyo batosaka baboti na bango mpe balingaka Yehova?— Ezali malamu koluka koyeba bana yango malamu mpe kokóma baninga na bango. Soki olandi ndakisa ya mwana ya Yefeta mpe ozali na botosi mpe ozali sembo, okozwa baninga ya malamu. Okosepelisa baboti na yo, mpe Yehova akolinga yo.

^ par. 6 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.