Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini makama minene ezali kosalema mingi?

Mpo na nini makama minene ezali kosalema mingi?

MBALA mingi, bazulunalo ná baradio ezali kolobela makama oyo ezali kosalema. Ebele ya bato bazali kokufa na makama oyo ezali kosalema mbala na mbala, koleka ndenge ezalaki kosalema liboso. Ebongiseli moko (Centre belge de recherche sur l’épidémiologie des désastres) elobi ete kaka na 2010, makama 373 esalemaki mpe ebomaki bato soki nkóto 296.

Lisusu, balapolo emonisi ete motángo ya makama oyo esalemi na boumeli ya bambula oyo euti koleka emati mpenza komata. Na ndakisa, kati na mobu 1975 mpe 1999, makama soki 300 ezalaki kosalema mbula na mbula. Nzokande, kati na mobu 2000 mpe 2010, makama soki 400 esalemaki mbula na mbula. Ntango mosusu ozali na kati ya bato oyo bamitunaka, ‘Mpo na nini makama ezali mingi lelo oyo?’

Atako mbala mingi, bato balobaka ete makama yango ezali “misala ya Nzambe,” kasi ezali mpenza bongo te. Ezali Nzambe te moto abimisaka makama oyo ekómelaka bato mingi lelo. Kasi, Biblia esakolaki ete makama ekozala na mikolo na biso. Na ndakisa, na Matai 24:7, 8, tozali kotánga maloba oyo ya Yesu: “Nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge. Makambo nyonso wana ezali ebandeli ya bampasi.” Mpo na nini Yesu asakolaki makambo yango, mpe ezali na ndimbola nini?

Yesu, Mwana ya Nzambe, ayanolaki na motuna oyo batunaki ye ete: “Elembo nini ekomonisa . . . bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Alobelaki makambo mingi oyo esengelaki kosalema, ata mpe makama lokola oyo touti kolobela. Na nsima, alobaki maloba oyo ya ntina mpenza: “Ntango bokomona makambo yango ezali kosalema, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene.” (Luka 21:31) Na yango, makama yango minene, ezali na ndimbola monene mpo na biso. Ezali komonisa ntango oyo mbongwana monene, oyo ezali liboso ekosalema.

Makambo mosusu oyo ezali kosala ete makama ebimaka

Nzokande, bato mingi bamitunaka, soki Nzambe te nde abimisaka makama, bongo ezali nani to eloko nini nde ebimisaka yango? Tokoyeba likambo yango malamu soki tondimi likanisi moko ya ntina mingi oyo Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Vɛrsɛ yango emonisi ete Nzambe te moto abimisaka makambo ya mpasi oyo ezali lelo na mokili, kasi ezali “moto mabe,” monguna ya Nzambe, oyo Biblia ebengi ye mpe “Zabolo.”​—Emoniseli 12:9, 12.

Lokola monguna wana ya Nzambe alukaka kaka matomba na ye moko, amonaka bato lokola biloko ezangi ntina. Lokola ye nde azali koyangela mokili mobimba, alendisaka mpe bato bámonisa mpe elimo yango. Kutu, Biblia elobi ete na “mikolo ya nsuka,” bato bakozala “bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo.” (2 Timote 3:1, 2) Yango wana, tokoki kokamwa te ete ebongiseli ya Zabolo etondi na bato oyo bazali komonisa bizaleli yango mpe bizaleli mosusu ya mabe. Azali kolendisa moimi mpe lokoso oyo mbala mingi ezali komemela bato makama.

Na ndenge nini lokoso ezali lelo oyo kobimisela bato makama? Lapolo moko ya ONU, oyo elobelaki makama oyo esalemaki na mokili elobi ete: “Ebele ya bato bazali kofanda na bisika oyo makama ekoki kosalema, na ndakisa na bisika oyo ekoki kotonda na mai. Lisusu, lokola bato bazali kokatakata bazamba, eloko ezali kotikala te oyo ekoki kopekisa makama mosusu mpo na bato mpe mabele. Longola makambo oyo nyonso, misala oyo bato bazali kosala ezali se kobebisa mopɛpɛ, komatisa mai ya mbu mpe kobakisa molunge na mabele.” Atako bato balobaka ete ‘misala yango oyo bato bazali kosala’ ezali mpo na komatisa nkita ya mboka, mpo na koloba solo, ezali nde misala ya moimi mpe lokoso oyo mokili ezali kolendisa.

Mpo na yango, bato mingi ya mayele bazali sikoyo kondima ete misala ya bato, ezali mpe na kati ya makambo oyo ezali kosala ete makama ekóma mingi lelo oyo. Mpo na koloba solo, bato bazali kopesa mabɔkɔ na ebongiseli oyo Zabolo azali kosalela mpo na kobakisela bato mpasi na makama oyo ezali kobima.

Na yango, tomoni ete makama mingi ezali kobima mpo bato bazali kosala misala kaka bisalasala. Lisusu, na bisika mosusu makama ekokaki mpe kosala mabe mingi te ndenge esalemaki. Na bisika mingi, makama mosusu esalaki mabe mingi koleka mpo na misala ya bato mabe to mpo ebele ya bato bazali kofanda na bisika oyo makama ekoki kobima mpo bazali na bomoi ya mpasi mpe bazangi mbongo. Nzokande, makama mosusu oyo ekómelaka bato, ezali foti ya moto te, kasi ezali mpo “ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka [bato] nyonso.”​—Mosakoli 9:11.

Ezala mpo na ntina nini, okosala nini soki likama monene ekómeli yo? Tokotalela sikoyo oyo okoki kosala mpo na kokitisa mpasi soki makama esalemi.