Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nini etindaka bato básala makambo oyo basalaka na Noele?

Nini etindaka bato básala makambo oyo basalaka na Noele?

“Na eleko ya Noele, ezalaka mpasi te bato bámitungisa. Makambo oyo bato basalaka na eleko yango ekómá lokola devuare; yango wana, ntango oyo moto akoki kolekisa ná bato ya libota mpe baninga ekómaka mokuse mpo akómaka na makambo mingi ya kosala. Na bantango mosusu esengo oyo tosengelaki koyoka esilaka mpo na mitungisi oyo tokutanaka na yango.”​—BRAD HENRY GUVƐRNƐRƐ MOKO YA KALA YA ETÚKÁ YA OKLAHOMA, NA ÉTATS-UNIS, 23 DESƐMBƐ 2008.

NTANGO eleko ya Noele ekómaka pene, banzembo, bafilme mpe baprogramɛ ya televizyo elendisaka bato bázala esengoesengo mpe básepela mpenza na fɛti yango. Mpo na yo, nini mpenza etindaka bango básala bongo? Ezalaka nde mpo na

  • Kokanisa Yesu Kristo?

  • Koyoka esengo oyo eutaka na kopesa?

  • Kosunga bato oyo bakelelá?

  • Kolekisa ntango ná bato ya libota?

  • Koluka kimya?

Ndenge guvɛrnɛrɛ Henry oyo totángi awa amonisi yango, bato mingi oyo basalaka fɛti ya Noele bamonaka ete ezali mpasi kokokisa makambo wana nyonso na eleko yango. Mbala mingi na eleko ya Noele, makambo ekendaka mbangumbangu, bato bamitungisaka, mpe na nyonso bato ya mimbongo nde bazwelaka yango litomba. Ekoki kosalema te ete moto ayoka esengo mpe amonisa bolingo oyo bato bakanisaka ete kaka fɛti ya Noele nde epesaka?

Biblia elendisaka biso nyonso tókanisaka Yesu Kristo, tózalaka mabɔkɔ pɛtɛɛ, tósalisaka baoyo bakelelá, mpe tólekisaka ntango elongo na bato ya libota na biso. Eteyaka mpe biso ndenge ya kozala bato ya kimya. Na yango, na esika elobela ntina oyo bato mosusu basalaka fɛti ya Noele * te, masolo oyo ekotalela nde mituna oyo elandi:

  • Mpo na nini bato mosusu bamonaka ete basengeli kosala fɛti ya Noele?

  • Mpo na nini ezalaka mpasi bákokisa makambo oyo bakanaka kosala na Noele?

  • Toli nini ya Biblia esalisi bamilio ya bato bámona eloko moko ya malamu koleka fɛti ya Noele?

^ par. 10 Mpo na koyeba ntina oyo bato mosusu basalaka fɛti ya Noele te mpo na kotosa Biblia, talá lisolo “Mituna ya batángi​—Mpo na nini bato mosusu basalaka fɛti ya Noele te?” .