Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

“Bizaleli na ngai ezalaki mabe mpenza”

“Bizaleli na ngai ezalaki mabe mpenza”
  • ABOTAMAKI NA: 1960

  • EKÓLO: FINLANDE

  • BOMOI NA YE YA KALA: MOBƐTI-MIZIKI BABENGI HEAVY-METAL

NDENGE NAZALAKI:

Nakolaki na kartye moko ya bozwi mingi te, na Turku, engumba moko oyo ezali na libongo. Tata na ngai azalaki elombe na lisano ya makofi, ngai ná leki na ngai ya mobali tomipesaki mpe na lisano yango. Nazalaki kobunda mingi na kelasi. Ntango nazalaki elenge, nakɔtaki na etuluku moko ya bato ya mobulu, mpe yango esalaki ete nakóma kobunda lisusu mingi. Nayaki mpe koyeba miziki babengi heavy-metal, mpe nakómaki na mposa ya kokóma mobɛti monene ya miziki yango.

Nasombaki mwa bambonda, nasalaki orkɛstrɛ moko mpe nakómaki mokonzi na yango. Na estrade nazalaki kosala makambo ya mobulu mpenza. Bakómaki kosalela orkɛstrɛ na biso bapiblisite mingi mpo ezalaki ya bato ya mobulu, mpe ndenge oyo tozalaki komonana na miso ya bato ezalaki kobangisa. Tokómaki kobɛta miziki liboso ya bato ebele mpe tosalaki mwa bakasɛti, mpe oyo ya nsuka bato mingi basepelaki na yango. Mpo orkɛstrɛ na biso eyebana mingi, na nsuka ya mobu 1980 tokendaki na États-Unis. Tobɛtaki mwa moke ba concert na New York mpe na Los Angeles mpe liboso tózonga na Finlande, tosalaki boyokani ná bato oyo bayebi mosala ya miziki malamu.

Atako kozala na orkɛstrɛ yango ezalaki kosepelisa ngai, mposa na ngai ezalaki ya kozala mpenza na bomoi ya esengo. Ezaleli ya kowelana mpe ya mobulu oyo babɛti miziki bazalaka na yango ezalaki kosepelisa ngai te. Bomoi na ngai ya mafumafu ekómaki kolɛmbisa ngai. Nazalaki komimona ete nazali mpenza moto mabe, mpe nazalaki kobanga kokende na lifelo. Namekaki koluka biyano na babuku ndenge na ndenge ya mangomba mpe nazalaki kobondela Nzambe mingi mpo asunga ngai, atako nazalaki komona ete nabongi te na miso na ye.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Mpo na kokokisa bamposa na ngai, nakómaki kosala na biro ya posita. Mokolo moko nayaki koyeba ete moninga na ngai moko ya mosala azali Motatoli ya Yehova. Natunaki ye mituna ebele mpenza. Biyano ya Biblia oyo apesaki esimbaki motema na ngai, yango wana nandimaki ayekola na ngai Biblia. Nsima ya koyekola Biblia mwa bapɔsɔ, moto moko ayaki koyokana ná orkɛstrɛ na biso mpe andimaki kopesa mbongo na ye mpo na kosalisa biso tóbimisa album ya miziki na États-Unis. Namonaki ete ezalaki libaku moko ya koboya te.

Nayebisaki Motatoli oyo azalaki koyekola na ngai ete nabimisa kaka album moko ata mpo na mbala ya nsuka, mpe na nsima, nakosalela mpenza mateya ya Biblia na bomoi na ngai. Apesaki ngai makanisi na ye te kasi asɛngaki ngai kaka natánga maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:24. Vɛrsɛ yango elobi: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale.” Ntango nayebaki ndimbola ya maloba wana ya Yesu, nakamwaki mpenza. Kasi nsima ya mwa mikolo, ekómaki ngala ya moteyi na ngai! Nayebisaki ye ete nalongwe na orkɛstrɛ wana mpo nalingi kolanda Yesu!

Biblia ezalaki lokola talatala oyo ezalaki kolakisa ngai mabunga na ngai. (Yakobo 1:22-25) Namonaki ete bizaleli na ngai ezalaki mabe mpenza: Nazalaki lolendo mpe na mposa makasi ya koluka lokumu. Nazalaki koloba maloba mabe, kobunda, komɛla makaya mpe kolangwa masanga. Ntango nayebaki ete bomoi na ngai eyokani te na oyo Biblia eteyaka, natungisamaki mingi. Ata bongo, nandimaki kobongwana.​—Baefese 4:22-24.

“Tata na biso ya likoló azalaka motema mawa, mpe mposa na ye ezali ya kobikisa bampota ya baoyo babongolaka mitema mpe batikaka kosala mabe”

Na ebandeli, nazalaki koyoka mpasi mpo na makambo mabe oyo nasalá. Kasi, Motatoli oyo ayekolaki na ngai Biblia asalisaki ngai mingi. Alakisaki ngai oyo Biblia elobi na Yisaya 1:18: “Ata soki masumu na bino ezali motane makasi, ekokóma mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.” Vɛrsɛ oyo ná bavɛrsɛ mosusu ya Biblia endimisaki ngai ete Tata na biso ya likoló azalaka motema mawa, mpe mposa na ye ezali ya kobikisa bampota ya baoyo babongolaka mitema mpe batikaka kosala mabe.

Ntango nayebaki Yehova mpe nakómaki kolinga ye, nakómaki na mposa ya komipesa epai na ye. (Nzembo 40:8) Nazwaki batisimo na 1992 na St. Petersburg, na ekoló Russie, na liyangani oyo esangisaka bandeko ya mikili ndenge na ndenge.

MATOMBA OYO NAZWI:

Nakómá na baninga mingi ya malamu kati na basambeli ya Yehova. Mbala na mbala tokutanaka mpo na kobɛta miziki ya kitoko mpe kosepela na likabo wana kitoko oyo euti na Nzambe. (Yakobo 1:17) Lipamboli mosusu ya ntina mingi oyo nazwi ezali libala ya ngai ná Kristina. Tolekisaka ntango ya mpasi mpe bisengo elongo; nayebisaka ye makambo na ngai ya nse ya motema.

Soki nakómaka Motatoli ya Yehova te, mbɛlɛ lelo oyo nalingaki kozala na bomoi te. Kala, nazalaki ntango nyonso komilukela makambo mpe komikɔtisa na mobulu. Sikoyo bomoi na ngai ezali mpenza na ntina, mpe namonaka ete makambo nyonso ekómi na molɔngɔ.