Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

PUSANÁ PENEPENE NA NZAMBE

Yehova atyelaka yo mpenza likebi?

Yehova atyelaka yo mpenza likebi?

Mwasi moko oyo azalaki kondima te ete Yehova akoki kotyela ye likebi, alobi boye: “Komiyoka ete nazangi ntina ezali mokakatano monene oyo nazali kosala makasi nalonga yango.” Yo mpe omiyokaka bongo? Soki ezali bongo, okoki komituna boye: ‘Yehova atyelaka mpenza mosaleli na ye mokomoko likebi?’ Eyano ezali ɛɛ! Maloba ya Yesu endimisi yango.​—Tángá Yoane 6:44.

Yesu, oyo ayebi malamu bizaleli mpe mokano ya Yehova koleka moto mosusu nyonso, alobaki nini? (Luka 10:22) Yesu alobaki boye: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” Na yango, tokoki te kokóma bayekoli ya Kristo mpe basambeli ya Yehova, Tata na biso ya likoló, soki Yehova ye moko abendi biso te. (2 Batesaloniki 2:13) Soki tokangi ntina ya maloba ya Yesu, boye, tokomona mpenza ete Yehova atyelaka mokomoko na biso likebi.

Koloba ete Yehova abendi biso elimboli nini? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kobenda” esalelamaka mpe mpo na kolobela kobenda monyama oyo ezali na mbisi. (Yoane 21:6, 11) Yehova abendaka biso na makasi mpo tósalela ye? Te. Yehova apesá biso bonsomi ya kopona, na yango, afungolaka mitema na biso na makasi te. (Kolimbola Mibeko 30:19, 20) Moto moko ya mayele alobeli yango boye: “Fungola ezalaka te na libanda ya porte ya motema ya moto. Esengeli motema ezala ya kofungwama na kati.” Yehova atalatalaka mitema ya bamilio ya bato ya mokili oyo, mpe alukaka baoyo balingaka koyeba ye. (1 Ntango 28:9) Soki amoni moto ya ndenge wana, atyelaka ye likebi mpenza. Ndenge nini?

Na boboto nyonso, Yehova abendaka motema ya moto oyo azali na “ezaleli oyo ebongi.” (Misala 13:48) Yehova asalaka bongo na lolenge mibale​—na nzela ya nsango malamu ya Biblia, oyo mokomoko na biso ayokaka, mpe na nzela ya elimo santu na ye. Soki Yehova atali motema ya moto mpe amoni ete endimi solo ya Biblia, asalelaka elimo na ye mpo na kosalisa moto yango akanga ntina mpe asalela solo yango na bomoi na ye. (1 Bakorinti 2:11, 12) Tokoki te kokóma bayekoli ya solosolo ya Yesu mpe basambeli ya Yehova ya molende, soki Nzambe asalisi biso te.

“Fungola ezalaka te na libanda ya porte ya motema ya moto. Esengeli motema ezala ya kofungwama na kati”

Kasi, maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 6:44 eteyi biso nini mpo na Yehova Nzambe? Yehova abendaka bato mpo amonaka eloko moko ya malamu na mitema na bango mpe atyelaka mokomoko na bango likebi. Koyeba solo yango ekitisaki motema ya mwasi oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Alobi boye: “Kozala mosaleli ya Yehova ezali libaku moko monene oyo moto akoki kozwa. Mpe soki Yehova aponaki ngai nazala mosaleli na ye, yango emonisi ete nazali na valɛrɛ na miso na ye.” Bongo yo? Koyeba ete Yehova atyelaka mosambeli na ye mokomoko likebi etindi yo ofungolela ye motema na yo?

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya mitano

Luka 22-24Yoane 1-16