Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye”

“Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye”

Balongoli molakisi moko ya lisano ya basketball na mosala mpo na ezaleli na ye ya nkanda makasi.

Mwana moko ya moke asali matata mpo bapesi ye te eloko oyo alingi.

Mama moko aswani makasi na mwana na ye mpo shambrɛ na ye ezali salite.

BISO nyonso tomoná ndenge bato basilikaka, mpe na ntembe te, biso moko mpe tosilikaka na bantango mosusu. Atako tokoki komona ete nkanda ezali ezaleli mabe oyo tosengeli kotika yango, mbala mingi tomonaka ete tozali na ntina ya kosilika, mingimingi ntango tomoni ete moto moko asaleli biso makambo na bosembo te. Ebongiseli moko (Association américaine de psychologie) elobi kutu ete “nkanda ezali ezaleli oyo moto nyonso azalaka na yango mpe mbala mingi ezalaka malamu na sante ya moto.”

Likanisi yango ekoki kozala malamu soki totaleli makambo oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Lokola ayebaki ete na bantango mosusu moto akoki koyoka nkanda, alobaki boye: “Bóyoka nkanda, mpe ata bongo bósala lisumu te; moi elala te bino bozali kaka na nkanda.” (Baefese 4:26) Mpo na yango, tosengeli kobimisa nkanda na biso to nde kosala nyonso mpo na kopekisa yango?

OSENGELI KOYOKA NKANDA?

Ntango Paulo apesaki toli yango na oyo etali nkanda, ekoki kozala ete akanisaki maloba ya mokomi ya nzembo oyo akomaki boye: “Ata soki bosiliki, bósala lisumu te.” (Nzembo 4:4) Kasi, Paulo alingaki mpenza koloba nini na toli yango? Alobaki boye: “Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino, ná mabe nyonso.” (Baefese 4:31) Paulo azalaki nde kolendisa bakristo báboya kobimisa nkanda na bango. Likambo ya esengo, ebongiseli yango (Association américaine de psychologie) ebakisi lisusu boye: “Bolukiluki emonisi ete ‘kobimisa’ nkanda ebakisaka nde yango mpe etindaka moto asala mabe na esika esalisa ye . . . bongisá nde makambo.”

Kasi, ndenge nini tokoki ‘kolongola mosika’ nkanda mpe makambo nyonso ya mabe oyo yango ebimisaka? Salomo, mokonzi ya bwanya na Yisraele akomaki boye: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.” (Masese 19:11) Ndenge nini “mayele ya kososola oyo moto azali na yango” esalisaka ntango nkanda emati?

NDENGE OYO MAYELE YA KOSOSOLA EKITISAKA NKANDA

Mayele ya kososola ezali likoki oyo moto azalaka na yango ya kotalela likambo malamu. Kozala na likoki yango elimboli kotalela likambo likolólikoló te. Ndenge nini yango esalisaka ntango basilikisi to batumoli biso?

Soki tomoni likambo moko ya kozanga bosembo, tokoki kosilika. Kasi, soki tolandi nkanda na biso mpe tosali mobulu, tokomipesa mpasi mpe tokopesa basusu mpasi. Kaka ndenge mɔtɔ oyo bakoki koboma te etumbaka ndako, nkanda makasi mpe ekoki kobebisa lokumu na biso mpe boyokani na biso na basusu, ata mpe elongo na Nzambe. Na yango, soki nkanda na biso emati, ezali ntango ya kotalela likambo yango malamumalamu. Koyeba likambo oyo esalemi na mobimba na yango ekosalisa biso tópekisa nkanda na biso.

Mokonzi Davidi, tata ya Salomo, akimaki ngambo ya makila na likambo ya mobali moko na nkombo Nabala, mpo basalisaki ye atalela likambo yango malamumalamu. Davidi ná bato na ye babatelaki bampate ya Nabala na esobe ya Yudea. Ntango eleko ya kokata bampate nsuki ekómaki, Davidi asɛngaki Nabala mwa biloko ya kolya. Kasi Nabala ayanolaki ye boye: “Bongo nazwa limpa na ngai ná mai na ngai mpe mosuni ya nyama na ngai oyo nabomi, oyo nakati mpo na bakati-nsuki ya bampate na ngai, mpe napesa yango bato oyo nayebi ata esika bauti te?” Oyo nde kofinga! Ntango Davidi ayokaki maloba wana, ye ná bato soki 400 bamibongisaki mpo na koboma Nabala mpe bato nyonso ya ndako na ye.​—1 Samwele 25:4-13.

Abigaile, mwasi ya Nabala, ayokaki likambo oyo elekaki mpe akendaki kokutana na Davidi. Ntango amonaki Davidi mpe bato na ye, akweaki na nse na makolo na ye mpe alobaki boye: “Tiká moombo na yo aloba na matoi na yo, mpe yoká maloba ya moombo na yo.” Na nsima, alimbolelaki Davidi ete Nabala azalaki na bozoba mpe amonisaki Davidi ete akoyoka mawa soki azongisi mabe mpe asopi makila.​—1 Samwele 25:24-31.

Mayele nini ya kososola Davidi azwaki na maloba ya Abigaile, oyo esalisaki ye akitisa motema? Ya liboso, amonaki ete Nabala azalaki zoba, ya mibale Davidi amonaki ete akokaki komema ngambo ya makila soki azongisi mabe. Ndenge moko na Davidi, likambo moko ekoki mpe kosilikisa yo. Osengeli kosala nini? Lisolo moko oyo zulunalo Mayo Clinic ebimisaki na likambo etali kopekisa nkanda, elobaki boye: “Zwá mwa ntango ya kobenda pema makasi mpe salá bongo mbala 10.” Ɛɛ, tɛlɛmá mpe kanisá nini ebimisi likambo yango mpe soki likambo oyo okani kosala ekobimisa nini na nsima. Tiká ete mayele ya kososola ekitisa nkanda na yo​—esilisa kutu yango.​—1 Samwele 25:32-35.

Ndenge moko mpe, bato mingi lelo oyo bazwaki lisalisi mpo na kopekisa nkanda na bango. Sebastian, oyo akɔtaká bolɔkɔ na Pologne ntango azalaki na mbula 23, ayekolaki kopekisa ezaleli na ye ya nkandankanda na nzela ya boyekoli ya Biblia. Alobi boye: “Liboso, nakanisaka na likambo oyo ebimi, na nsima, nalukaka kosalela toli ya Biblia. Namonaka ete Biblia ezali buku moko oyo esalisaka mpenza.”

Kosalela batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo opekisa ezaleli ya nkanda makasi

Setsuo mpe asalelaki mayele yango. Alobi boye: “Nazalaki na momeseno ya kogangela basusu soki basilikisi ngai na mosala. Lokola nayekoli Biblia, na esika ya koganga, namitunaka nde boye: ‘Ezali foti ya nani? Ngai te moto nabimisi likambo yango?’” Kokanisa na mituna ya ndenge wana ekitisaki nkanda na ye, mpe alongaki kopekisa nkanda na ye.

Nkanda ya moto ekoki kozala makasi, kasi toli ya Liloba ya Nzambe ezali makasi koleka. Soki osaleli batoli kitoko oyo ezali na Biblia mpe obondeli Nzambe asalisa yo, okoki kosala ete mayele na yo ya kososola ekitisa to epekisa nkanda na yo.