Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | YESU ABIKISI BISO​—NA NINI?

Ntina oyo tozali na mposa ya kobikisama

Ntina oyo tozali na mposa ya kobikisama

“Moto, oyo abotamá na mwasi, azalaka na bomoi mokuse mpe atondi na mpasi. Abimi lokola fololo, mpe akatami, mpe akimaka lokola elili mpe azalaka lisusu te.”​—Yobo 14:1, 2.

Banda kala, bato bamonaka ete soki batikali kaka bilenge mpe bazali na bomoi ya malamu libela na libela, ekozala malamu mpenza. Kasi likambo ya mawa, biso nyonso tokufaka. Maloba ya Yobo oyo ezali awa na likoló, oyo alobaki eleki sikoyo mbula 3 000 ezali solo tii lelo oyo.

Moto nyonso azalaka mpenza na mposa ya kozala na bomoi libela na libela. Biblia elobi ete Nzambe atyá na mitema na biso mposa makasi ya kozala na bomoi ya seko ata mpe mposa ya koluka koyeba yango malamu. (Mosakoli 3:11) Lokola ezali bongo, ebongi mpenza tókanisa ete Nzambe ya bolingo akoki kotya na mitema na biso mposa oyo azali te na likoki ya kokokisa yango? Soki oyanoli: Te, omikosi te. Liloba ya Nzambe ebengi liwa monguna mpe elaki ete monguna yango “akosilisama makasi.”​—1 Bakorinti 15:26.

Ntembe ezali te ete liwa ezali monguna. Moto moko te oyo motó na ye ezali kosala malamu akolinga yango. Ntango tomoni likama, tolongwaka wana, tomibombaka to tokimaka. Ntango tobɛli, tolukaka ndenge ya kobika. Tosalaka nyonso oyo tokoki mpo na kokima nyonso oyo ekoki koboma biso.

Tokoki mpenza kondimisama ete monguna wana ya kalakala akosilisama makasi? Ɛɛ. Yehova Nzambe, Moto oyo akelá biso, akelá biso te mpo tózala na bomoi kaka mpo na mwa bambula mpe na nsima tókufa. Liwa ezalaki te na mokano na ye ya ebandeli. Asalaki moto mpo azala na bomoi libela na mabele. Nyonso oyo akanaka, akokisaka.​—Yisaya 55:11.

Kasi, ndenge nini liwa ekosila? Banda basiɛklɛ mingi, bato basali nyonso mpo na kosilisa liwa kasi balongi te. Lelo oyo mpe bazali kaka kokoba koluka ndenge ya kosilisa yango. Bato ya siansi basalaki mangwele mpe bankisi oyo elongaki kosilisa bamaladi mosusu. Bayekoli mpenza ndenge oyo baselile ya bikelamu ya bomoi ezalaka. Na bisika mingi, bato bakómi koumela na bomoi koleka ndenge ezalaki eleki sikoyo siɛklɛ moko. Ata bongo, balongi kaka kosilisa liwa te. Ndenge Biblia elobi yango, “bango nyonso bazali kozonga na putulu.”​—Mosakoli 3:20.

Ntina ya kotyela mayele ya bato motema ezali te mpo na kosilisa likambo wana oyo eumeli mingi. Likambo ya esengo ezali ete Yehova Nzambe así azwá bibongiseli mpo na kobikisa to kosikola biso na liwa. Yesu Kristo nde moto oyo Nzambe aponi mpo na kosala yango.