Mokanda ya mibale epai ya Bakorinti 6:1-18

  • Kosalela boboto ya Nzambe na ndenge ya mabe te (1, 2)

  • Mosala ya Paulo elobelami (3-13)

  • “Bókangana te na ekanganeli ya mabe” (14-18)

6  Lokola tozali kosala elongo na ye,+ biso mpe tozali kobondela bino ete bóndima boboto monene ya Nzambe te mpe na nsima bóbosana ntina na yango.+  Mpo azali koloba ete: “Na ntango moko oyo endimami nayokaki yo, mpe na mokolo ya lobiko nasalisaki yo.”+ Talá! Sikoyo nde ntango mpenza oyo endimami. Talá! Sikoyo nde mokolo ya lobiko.  Tozali kobɛtisa bato libaku na likambo moko te, mpo moto moko te atyola mosala oyo tozali kosalela Nzambe;+  kasi na makambo nyonso, tozali kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli* ya Nzambe,+ na ezaleli ya koyika mpiko na makambo mingi, na komekama, na bosɛnga, na mikakatano,+  na kobɛtama, na babolɔkɔ,+ na makambo ya mobulu, na misala makasi, na babutu kozanga mpɔngi, na bantango ya kozanga bilei,+  na bopɛto, na boyebi, na motema molai,+ na boboto,+ na elimo santu, na bolingo oyo ezangi bokosi,+  na maloba ya solo, na nguya ya Nzambe;+ na nzela ya bibundeli ya bosembo+ ya lobɔkɔ ya mobali* mpe ya lobɔkɔ ya mwasi,*  na nzela ya nkembo mpe ya kosambwisama, na nzela ya nkombo mabe ná lokumu ya malamu. Totalelami lokola bakosi nzokande tozali bato oyo balobaka solo,  lokola bato oyo bayebani te nzokande toyebani, lokola bato oyo bazali kokufa* nzokande, talá! tozali na bomoi,+ lokola bato oyo bazwi etumbu* nzokande tokabami te na liwa,+ 10  lokola bato oyo bazali na mawa kasi tozali kosepela ntango nyonso, lokola babola kasi tozali kokómisa bato mingi bato ya bomɛngo, lokola bato bazali na eloko te nzokande tozali na biloko nyonso.+ 11  Tolobeli bino polele,* Bakorinti, tofungoli motema na biso mobimba. 12  Bolingo oyo tozali na yango mpo na bino ezali na ndelo te,+ kasi bino nde bozali kotya ndelo na bolingo na bino mpo na biso. 13  Yango wana, nazali koloba lokola na bana na ngai—nabondeli bino bósalela biso mpe bongo—bino mpe bófungola mpenza motema.*+ 14  Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te.+ Mpo boninga nini ezali na kati ya bosembo mpe kobuka mibeko?+ To pole ná molili esanganaka na nini?+ 15  Lisusu, boyokani nini ezali kati na Kristo mpe Beliale?*+ To eloko nini mondimi* azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te?+ 16  Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?+ Mpo tozali tempelo ya Nzambe ya bomoi;+ kaka ndenge Nzambe alobaki ete: “Nakofanda na kati na bango+ mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.”+ 17  “‘Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova* alobi bongo, ‘bótika kosimba eloko ya mbindo’”;+ “‘mpe ngai nakoyamba bino.’”+ 18  “‘Nakokóma tata na bino,+ mpe bino bokokóma bana na ngai ya mibali mpe ya basi,’+ Yehova* Mozwi-ya-Nguya-Nyonso alobi bongo.”

Maloba na nse

To, “baministre.”
To mbala mosusu, “mpo na kobunda.”
To mbala mosusu, “mpo na komibatela.”
To, “totalelami lokola bato oyo babongi na liwa.”
To, “disiplini.”
To, “Tofungoli monɔkɔ na biso mpo na kolobela bino polele.”
To, “bino mpe bófungwama.”
To, “moto ya sembo.”
Euti na liloba ya Ebre oyo elimboli, “zoba.” Esalelami mpo na kolobela Satana.
Talá Ap. A5.
Talá Ap. A5.