Bileli 3:1-66

  • Yirimia alobeli elikya na ye mpe ndenge azali komiyoka

    • “Nakozela na motema moko” (21)

    • Motema mawa ya Nzambe ezalaka ya sika ntɔngɔ nyonso (22, 23)

    • Nzambe azalaka malamu epai ya baoyo batyelaka ye elikya (25)

    • Ezali malamu mpo na bilenge bákutana na mikakatano (27)

    • Nzambe asaleli lipata mpo na kokanga nzela ya kokóma epai na ye (43, 44)

א [Alef] 3  Nazali mobali oyo amoni mpasi mpo na lingenda ya nkanda makasi na ye.   Abengani ngai mpe asali ete natambola na molili kasi na pole te.+   Ya solo, mokolo mobimba azali kaka kosembola lobɔkɔ na ye mpo na kopesa ngai etumbu.+ ב [Bet]   Akaukisi mosuni mpe loposo na ngai;Abuki mikuwa na ngai.   Azingi ngai; atye pembenipembeni na ngai nzete ya pwazɔ+ mpe mpasi.   Afandisi ngai na makasi na bisika ya molili lokola bato oyo bakufá banda kala. ג [Gimel]   Akangi ngai na efelo mpo nakima te;Akangi ngai na bikangeli ya kwivre ya kilo.+   Mpe ntango nazali kaka kobelela mpo na kosɛnga lisalisi, aboyi koyoka libondeli na ngai.*+   Akangi banzela na ngai na mabanga oyo bakatá;Atɛngisi babalabala na ngai.+ ד [Dalet] 10  Abombani mpo na kotyela ngai motambo lokola urse, lokola nkɔsi na esika ya kobombana.+ 11  Alongoli ngai na nzela na makasi mpe apasoli ngai bitenibiteni;Akómisi ngai moto oyo azangá ntina.+ 12  Agumbi* litimbo na ye, mpe atɛlɛmisi ngai lokola eloko ya kobwakela likula. ה [He] 13  Akɔtisi na bangɛi na ngai makula* ya libenga na ye. 14  Nakómi eloko ya kosɛka na miso ya bato nyonso ya bikólo, mokolo mobimba bayembaka mpe batyolaka ngai. 15  Atondisi ngai na biloko ya bololo mpe atondisi ngai na mbondo.+ ו [Waw] 16  Azali kobuka mino na ngai na mabanga mikemike;Asali ete nagunzama na putulu ya mɔtɔ.+ 17  Osali ete nazala na kimya te;* nabosani eloko oyo ezali malamu. 18  Bongo nalobi: “Nkembo na ngai esili, ná eloko oyo nazali kozela epai ya Yehova.” ז [Zayin] 19  Kanisá mpasi na ngai mpe ndenge nazangi esika ya kofanda,+ ná mbondo mpe nzete ya pwazɔ.+ 20  Ya solo mpenza, okokanisa mpe okogumbama likoló na ngai.+ 21  Nakokanisa yango; yango wana nakozela na motema moko.+ ח [Het] 22  Ezali mpo na bolingo ya sembo ya Yehova ndetosili te,+Mpo motema mawa na ye ezali na nsuka te.+ 23  Ezalaka ya sika ntɔngɔ nyonso;+ bosembo na yo etondi mpenza kotonda.+ 24  Nalobi:* “Yehova azali likabo na ngai;+ yango wana nakozela ye na motema moko.”+ ט [Tet] 25  Yehova azali malamu epai ya moto oyo azali kotyela ye elikya,+ epai ya moto oyo azali kokoba koluka ye.+ 26  Ezali malamu ete moto azela na kimya*+ lobiko oyo euti epai ya Yehova.+ 27  Ezali malamu moto akutana na mikakatano* ntango azali elenge.+ י [Yod] 28  Afanda kaka ye moko mpe atikala kimya ntango Nzambe atiki ete akutana na yango.*+ 29  Atya monɔkɔ na ye na putulu;+ mbala mosusu elikya ekozala.+ 30  Apesa litama na ye na moto oyo azali kobɛta ye; andima kotonda na nsɔni. כ [Kaf] 31  Mpo Yehova akobwaka biso te mpo na libela.+ 32  Mpo ata ayokisi mpasi, akoyoka mpe mawa na kolanda bolingo ya sembo oyo atondi na yango.+ 33  Mpo na motema na ye azali na mposa te ya komonisa bana ya bato mpasi to konyokola bango.+ ל [Lamed] 34  Konyata na nse ya makolo bato nyonso ya bolɔkɔ oyo bazali na mabele,+ 35  Kopimela moto bosembo na miso ya Oyo-Aleki-Likoló,+ 36  Kobebisela moto likambo na ye ya kosamba—Yehova andimaka makambo ya ndengewana te. מ [Mem] 37  Bongo, nani akoki koloba mpe kosala ete yango esalema soki Yehova apesi mitindo te? 38  Na monɔkɔ ya Oyo-Aleki-Likoló,Makambo ya mabe ná makambo ya malamu ebimaka nzela moko te. 39  Mpo na nini moto* asengeli komilelalela mpo na makama oyo lisumu na ye ebimisi?+ נ [Nun] 40  Tiká tókanisa malamumalamu lolenge ya bomoi na biso,+ mpe tózongela Yehova.+ 41  Tiká tómonana liboso ya Nzambe na likoló na motema ya sembo mpe tótombola mabɔkɔ na biso, tóloba ete:+ 42  “Tobuki mibeko, totomboki+ mpe yo olimbisi biso te.+ ס [Samek] 43  Na nkanda, okangi nzela ya kokóma epai na yo;+Olandi biso mpe obomi biso kozanga mawa.+ 44  Na lipata, okangi nzela ya kokóma epai na yo, mpo libondeli na biso eleka te.+ 45  Okómisi biso biloko ya salite mpe biloko ya bosɔtɔ kati na bato ya bikólo.” פ [Pe] 46  Banguna na biso nyonso bazali koloba mabe mpo na biso.+ 47  Nsɔmɔ mpe mabulu,+ libebi mpe kokwea nde ezali kokómela biso.+ 48  Liso na ngai ezali kaka kobimisa mikɛli ya mai mpo mwana mwasi ya bato na ngai akwei.+ ע [Ayin] 49  Miso na ngai ezali kaka kolela kozanga kotika,+ 50  Tii Yehova akotala na nse mpe akomona uta na likoló.+ 51  Miso na ngai ememeli ngai mawa mpo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.+ צ [Tsade] 52  Kaka mpamba, banguna na ngai baluki ngai lokola ndɛkɛ. 53  Basukisi bomoi na ngai na kati ya libulu; bazali kaka kobwakela ngai mabanga. 54  Mai eleki likoló ya motó na ngai mpe nalobi ete: “Nasuki mpenza!” ק [Kof] 55  Nabeleli nkombo na yo, Ee Yehova, uta na esika ya mozindo ya libulu.+ 56  Yoká mongongo na ngai; kokanga litoi na yo te ntango nazali kosɛnga lisalisi mpo obɔndisa ngai. 57  Na mokolo oyo nazalaki kobenga yo, opusanaki penepene. Olobaki ete: “Kobanga te.” ר [Resh] 58  Osambi likambo na ngai,* Ee Yehova, osikoli bomoi na ngai.+ 59  Ee Yehova, omoni mabe oyo basaleli ngai; nabondeli yo, longisá ngai.+ 60  Omoni mposa na bango nyonso ya kozongisa mabe, makanisi na bango nyonso mpo na kobundisa ngai. ש [Sin] to [Shin] 61  Oyoki matumoli na bango, Ee Yehova, makanisi na bango nyonso mpo na kobundisa ngai,+ 62  Mbɛbu ya baoyo bazali kotɛmɛla ngai mpe kolobaloba na bango ya nse nse mpo na ngai mokolo mobimba. 63  Talá bango; ezala bafandi to batɛlɛmi, bazali kotyola ngai na nzembo na bango. ת [Taw] 64  Ee Yehova, okofuta bango na kolanda misala na bango. 65  Okokómisa mitema na bango makasi, bongo nde okolakela bango mabe. 66  Na nkanda na yo, ee Yehova, okolanda bango mpe okosilisa bango mpenza mpo bázala lisusu te na mabele.

Maloba na nse

To, “akangeli libondeli na ngai nzela.”
Lil., “Anyati.”
Lil., “bana.”
To, “molimo na ngai ezala na kimya te.”
To, “Molimo na ngai elobi.”
To, “azela na motema moko.”
Lil., “amema ekanganeli.”
To, “ntango Nzambe atye ekanganeli likoló na ye.”
Lil., “moto ya bomoi.”
To, “likambo ya kosamba ya molimo na ngai.”