Habakuku 2:1-20

  • “Nakokoba kosɛnzɛla mpo na komona makambo oyo akoloba” (1)

  • Eyano ya Yehova epai ya mosakoli (2-​20)

    • ‘Kobá kozela emonaneli yango’ (3)

    • Moto ya sembo akotikala na bomoi mpo na bosembo (4)

    • Bampasi mitano mpo na Bakaladea (6-20)

      • Mabele ekotonda na boyebi ya Yehova (14)

2  Nakozala kaka na esika na ngai ya kokɛngɛla,+Nakotɛlɛma likoló ya efelo makasi ya libateli. Nakokoba kosɛnzɛla mpo na komona makambo oyo akoloba na nzela na ngaiMpe oyo nakoyanola ntango nakopamelama.   Bongo Yehova ayanolaki ngai ete: “Komá emonaneli yango, komá yango polele na bitanda,+Mpo moto oyo azali kotánga yango na mongongo makasi abɛta libaku te.*+   Mpo emonaneli yango ezali naino mpo na ntango oyo etyamá,Kasi ezali koya mbangu mpo ekokisama, mpe ekokosa te. Ata soki ezali koumela,* kobá kozela yango!*+ Mpo kozanga ntembe yango ekokokisama.* Ekokóma nsima ya ngonga te!   Talá moto ya lolendo;*Azali moto ya makambo alima te. Kasi moto ya sembo* akozala na bomoi mpo na bosembo* na ye.+   Ya solo, lokola vinyo ekosaka,Moto ya lofundo akokokisa mokano na ye te. Ayeisi mposa* na ye monene lokola Nkunda;*Azali lokola liwa mpe akoki kotonda te. Azali se kosangisa bikólo nyonsoMpe koyanganisa mpo na ye bato nyonso ya bikólo.+   Baoyo nyonso bakotyola ye te, na maloba ya lisese, ya mbwakela mpe na basambole?+ Bakoloba: ‘Mawa na moto oyo azali konduka biloko oyo ezali ya ye teMpe oyo azali kaka kobakisa nyongo na ye!Tii ntango nini?   Baoyo bazali kodefisa yo bakobimela yo pwasa te? Bakolamuka mpe bakoningisa yo na makasi,Mpe okokóma eloko ya kopunza mpo na bango.+   Bato nyonso ya bikólo oyo batikali bakopunza yo,+Mpo opunzaki bikólo mingi,Mpo osopaki makila ya batoMpe osalelaki mabele mobulu,Bingumba mpe bafandina yango.+   Mawa na moto oyo azwelaka libota* na ye litomba na ndenge ya mabe,Mpo atya zumbu* na ye na likoló,Mpe akima mpo likama ezwa ye te! 10  Makambo oyo okani ememeli libota* na yo nsɔni, Ndenge osilisi bato mingi ya bikólo omisaleli lisumu.+ 11  Na efelo libanga ekoganga,Mpe libaya moko nansamba ya ndako ekoyanola yango. 12  Mawa na moto oyo azali kosopa makila mpo na kotonga engumba,Mpe oyo azali kobongisa sité na makambo ezangi bosembo! 13  Talá! Ntango bato ya bikólo bazali kosala mosala makasi mpo na biloko oyo ekozika na mɔtɔ,Mpe bikólo ezali koboma nzoto kaka mpamba, Ezali te mpo Yehova ya mampinga nde alingi bongo?+ 14  Mpo mabele ekotonda na boyebi ya nkembo ya YehovaKaka ndenge mai etondina mbu.+ 15  Mawa na moto oyo azali kopesa baninga na ye eloko ya komɛla,Mpe abakisi kosilika ná nkanda kati na yango mpo bálangwa,Bongo atala bolumbu na bango! 16  Okotonda na nsɔni na esika ya kotonda na nkembo. Yo mpe mɛlá, mpe monisá bolumbu na yo oyo ekatami ngenga te. Kɔpɔ na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova ekoyela yo,+Mpe nsɔni ekozipa nkembo na yo; 17  Mpo mobulu oyo basaleli Liban ekozipa yo,Mpe libebi oyo epesaki banyama nsɔmɔ ekoya likoló na yo,Mpo osopaki makila ya batoMpe osalaki mobulu na ekólo yango,Bingumba mpe bafandi na yango.+ 18  Ntina ya ekeko oyo eyemami ezali nini,Ntango mosali na yango ayemi yango? Ntina ya ekeko ya ebende* mpe moteyi ya makambo ya lokuta ezali nini,Ata soki moto oyo asali yango atyeli yango motema?Asali banzambe ya mpambampamba oyo elobaka te.+ 19  Mawa na moto oyo azali koloba na eteni ya nzete ete: “Lamuká!” To na libanga oyo elobaka te ete: “Tɛlɛmá! Teyá biso!” Talá! Bapakoli yango wolo mpe palata,+Kasi ezali na mpema ata moke te kati na yango.+ 20  Kasi Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+ Tiká ete mabele mobimba efanda nyɛɛ liboso na ye!’”+

Maloba na nse

To, “akakatana te.”
To, “soki emonani ete eumeli.”
To, “kozela yango na mposa makasi.”
Lil., “ezali kokende na nsuka na yango.”
To, “Talá! Molimo na ye evimbani.”
To, “moyengebene.” Talá Ndimbola ya maloba.
To mbala mosusu, “kondima; bindimeli.”
To, “molimo.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
Lil., “ndako.”
To, “zála.”
Lil., “ndako.”
To, “ekeko ya ebende oyo enyangwisami.”