Masese 17:1-28

  • Kofuta te mabe mpo na malamu (13)

  • Longwá liboso koswana ebima (14)

  • “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso” (17)

  • “Motema ya esengo ezali nkisi oyo ebikisaka” (22)

  • Moto ya bososoli apekisaka maloba na ye (27)

17  Eteni ya limpa ekauká esika kimya ezaliEzali malamu+ koleka ndako oyo etondi na misuni* esika koswana+ ezali.   Mosaleli oyo azali na mayele ya kososola akozala na bokonzi likoló ya mwana oyo asalaka makambo ya nsɔni;Akozwa libula lokola mwana ya nkolo mosala.   Nzungu ya kopɛtola ezali mpo na palata mpe mɔtɔ makasi mpo na wolo,+Kasi Yehova nde atalatalaka mitema.+   Moto mabe atyaka likebi na maloba oyo eyokisaka mpasi,Mpe mokosi ayokaka lolemo ya lokuta.+   Moto oyo atyolaka mobola azali kofinga Mokelina ye,+Mpe moto oyo asepelaka na likama ya moto mosusu akozanga kozwa etumbu te.+   Motole ya mibange ezali bana ya bana na bango,Mpe batata* bazali nkembo ya bana na bango.   Ebongi te ete zoba alobamakambo oyo ezali malamu.+ Ezali mabe koleka ntango mokonzi* asaleli maloba ya lokuta!+   Likabo ezali lokola libanga ya ntalo* epai ya nkolo na yango;+Nyonso oyo asalaka, elongaka.+   Moto oyo alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko alukaka bolingo,+Kasi moto oyo azali kaka kolobaloba likambo akabolaka baninga ya motema.+ 10  Moto ya mayele akokanga mbala moko ntina ya mpamela+Kasi zoba akokanga ntina te ata soki obɛti ye mbala nkama.+ 11  Moto mabe alukaka kaka botomboki,Kasi momemi-nsango ya mabe akoya mpe akopesa ye etumbu.+ 12  Eleki malamu kokutana na urse oyo ebungisi bana na yangoNa esika ya kokutana na zoba na bozoba na ye.+ 13  Soki moto afuti mabe mpo na malamu,Mabe ekolongwa na ndako na ye te.+ 14  Ebandeli ya kowelana ezali lokola kofungola nzela ya mai;*Liboso koswana ebima, longwá wana.+ 15  Moto oyo alongisi moto mabe mpe oyo akweisi moto ya sembo+Yehova ayinaka bango nyonso mibale. 16  Ntina ezali nini soki zoba azali na likoki ya kozwa bwanyaNtango azali na mposa teya kozwa yango?*+ 17  Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso+Mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.+ 18  Moto oyo azangi bososoli* apesaka lobɔkɔ mpe andimakaKomipesa ndanga liboso ya mozalani na ye.+ 19  Moto oyo alingaka matata alingaka likambo oyo ebuki mibeko.+ Moto nyonso oyo azali koluka kotombola esika na ye ya kokɔta azali koluka kokwea.+ 20  Moto oyo azali na bokosi na motema akolonga te,*+Mpe moto oyo alobaka maloba ya lokuta akozwa libebi. 21  Moto oyo aboti mwana ya zoba azalaka na mawa;Mpe tata ya mwana oyoazali bolole azalaka na esengo te.+ 22  Motema ya esengo ezali nkisi oyo ebikisaka,+Kasi elimo oyo elɛmbi esilisaka makasi.*+ 23  Moto mabe akozwa kanyaka na kobombana*Mpo na kobebisa nzela ya bosembo.+ 24  Bwanya ezali liboso ya moto ya bososoli,Kasi miso ya zoba etambolatambolaka tii na bansuka ya mabele.+ 25  Mwana ya zoba ayokisaka tata na ye mawaMpe ayokisaka mama na ye mpasi na motema.*+ 26  Ezali malamu te kopesa moto ya sembo etumbu.*Mpe ebongi te kobɛta bato ya lokumu fimbo. 27  Moto oyo azali na boyebi apekisaka maloba na ye,+Mpe moto ya bososoli akofanda kimya.*+ 28  Ata zoba akomonana moto ya bwanya soki afandi nyɛɛ,Mpe moto oyo akangaka mbɛbu na ye akomonana moto ya bososoli.

Maloba na nse

Lil., “bambeka.”
To, “baboti.”
To, “nkumu.”
To, “libanga oyo ememaka kondimama.”
To, “kofungola liziba.”
To, “Ntango azangi bososoli.”
Lil., “azali na motema te.”
Lil., “akomona bolamu te.”
To, “ekaukisaka mikuwa.”
Lil., “kanyaka oyo euti na ntolo.”
Lil., “bololo.”
To, “kofutisa bato ya sembo lomande.”
Lil., “azali na elimo ya kimya.”