Yobo 1:1-22

  • Yobo azali sembo mpe mozwi (1-5)

  • Satana atye ntembe na bosembo ya Yobo (6-12)

  • Yobo abungisi bomɛngo mpe bana na ye (13-19)

  • Yobo afundi Nzambe te (20-22)

1  Ezalaki na mobali moko na mokili ya Uze, nkombo na ye Yobo.*+ Mobali yango azalaki sembo mpe azangaki mbeba;+ azalaki kobanga Nzambe mpe kokima mabe.+  Azalaki na bana mibali nsambo mpe bana basi misato.  Azalaki na bampate 7 000, bakamela 3 000, bangɔmbɛ 1 000* ná bampunda* 500; azalaki mpe na ebele ya basali, mpe akómaki moto monene koleka bato nyonso ya Ɛsti.  Mokomoko kati na bana na ye ya mibali azalaki kosalisa fɛti na ndako na ye na mokolo na ye.* Bazalaki kobengisa bandeko na bango misato ya basi mpo na kolya mpe komɛla elongo na bango.  Soki mikolo ya fɛti eleki tii na moto ya nsuka, Yobo azalaki kobenga bango epai na ye mpo na kopɛtola bango. Mpe azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe kopesa bambeka ya kotumba+ mpo na mokomoko na bango. Mpo Yobo azalaki koloba boye: “Ntango mosusu bana na ngai basali lisumu mpe balakeli Nzambe mabe na motema na bango.” Yobo azalaki kosala bongo ntango nyonso.+  Mokolo ekómaki oyo bana ya Nzambe ya solo*+ bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova.+ Satana+ mpe akɔtaki elongo na bango.+  Bongo Yehova alobaki na Satana: “Outi wapi?” Satana apesaki Yehova eyano ete: “Nauti kotambolatambola na mabele mpe kolekaleka kuna.”+  Mpe Yehova alobaki na Satana: “Otyaki likebi na* mosaleli na ngai Yobo? Na mabele moto moko lokola ye azali te. Azali sembo mpe azangi mbeba,+ abangaka Nzambe mpe akimaka mabe.”  Na yango, Satana apesaki Yehova eyano ete: “Yobo abangaka Nzambe nde mpamba?+ 10  Ezali te mpo otɛlɛmisi lopango ya libateli zingazinga na ye+ mpe ya ndako na ye mpe ya eloko nyonso oyo azali na yango? Opamboli mosala ya mabɔkɔ na ye,+ mpe bibwɛlɛ na ye etondi mboka mobimba. 11  Kasi, mpo makambo ebongwana, sembolá lobɔkɔ na yo, bɔtɔlá nyonso oyo azali na yango, mpe okomona ndenge akolakela yo mpenza mabe.” 12  Na yango, Yehova alobaki na Satana: “Talá! Biloko na ye nyonso ezali na mabɔkɔ na yo.* Kasi, kosala ye mabe te!” Bongo Satana alongwaki liboso* ya Yehova.+ 13  Mokolo moko ntango bana na ye ya mibali mpe ya basi bazalaki kolya mpe komɛla vinyo na ndako ya ndeko na bango ya mobali, mwana ya liboso,+ 14  momemi-nsango moko ayaki koyebisa Yobo boye: “Bangɔmbɛ ezalaki kobalola mabele mpe bampunda ezalaki kolya matiti pembeni na yango, 15  na mbala moko Basabea bakɔtaki mpe bazwaki yango, mpe babomaki basaleli na mopanga. Kaka ngai nde nabiki, nayei koyebisa yo yango.” 16  Ntango oyo wana azalaki naino koloba, mosusu ayaki mpe alobaki: “Mɔtɔ eutaki epai ya Nzambe* na likoló ekwei, epeli na katikati ya bampate ná basali mpe ezikisi bango! Kaka ngai nde nabiki, nayei koyebisa yo yango.” 17  Ntango oyo wana azalaki naino koloba, mosusu ayaki mpe alobaki: “Bakaladea+ basalaki bituluku misato mpe mbala moko babimelaki bakamela mpe bazwaki yango, mpe babomi basaleli na mopanga. Kaka ngai nde nabiki, nayei koyebisa yo yango.” 18  Ntango oyo wana azalaki naino koloba, mosusu lisusu ayaki mpe alobaki: “Bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kolya mpe komɛla vinyo na ndako ya ndeko na bango ya mobali, mwana ya liboso. 19  Na mbala moko mopɛpɛ moko ya makasi euti na esobe, ebɛti na nsuka* nyonso minei ya ndako, mpe ndako ekweli bilenge yango mpe bakufi. Kaka ngai nde nabiki, nayei koyebisa yo yango.” 20  Bongo Yobo atɛlɛmaki, apasolaki elamba na ye mpe akokolaki motó na ye; na nsima afukamaki mpe atyaki elongi na mabele, 21  mpe alobaki ete: “Nabimaki bolumbu na libumu ya mama na ngai,Mpe nakozonga bolumbu.+ Yehova apesi,+ mpe Yehova abɔtɔli. Nkombo ya Yehova ekoba kosanzolama.” 22  Na nyonso wana, Yobo asalaki lisumu te mpe afundaki Nzambe ata na likambo moko te ya mabe.

Maloba na nse

Mbala mosusu elimboli, “oyo ayinami.”
Lil., “bangɔmbɛ 1 000 oyo bakangisi mibalemibale.”
Lil., “bampunda ya basi.”
To, “na ngala na ye.”
Ezali maloba ya elilingi na Ebre mpo na kolobela baanzelu oyo bazali bana ya Nzambe.
Lil., “Otyaki motema epai ya.”
To, “ezali na nse ya nguya na yo.”
Lil., “liboso ya elongi.”
To mbala mosusu, “Mikalikali eutaki.”
To, “matumu.”