Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 112

Yehova, Nzambe ya kimya

Yehova, Nzambe ya kimya

(Bafilipi 4:9)

  1. 1. Yehova bolingo,

    Yah olakaki biso

    Kimya na yo. Pes’elimo

    Tóbota mbuma n’ango.

    Tondimeli Yesu,

    Mwana n’o ya bolingo,

    Kimy’ekɔti, mpe sikoyo

    Zwá biso baninga n’o.

  2. 2. Mokili, molili;

    Biso, elimo na yo

    Ez’okamba, toz’omona

    Na pole ya Liloba.

    Tik’esunga biso

    Tóbatela kimy’oyo,

    Tii bitumba mpe

    koswan’ekosila mpo na seko.

  3. 3. Osangisi biso,

    Na nse mpe na likoló,

    Na bomoko, toz’oteya:

    Bokonzi ebotami.

    Etikali moke,

    Bitumb’ekozala te.

    Nde bampate basepeli

    Na kimya mpo na seko.