Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 123

Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

Tótosaka ebongiseli ya Teokrasi

(1 Bakorinti 14:33)

  1. 1. Ntango Batatoli baz’osakola

    Bokonzi ya Nzambe bisika nyonso,

    Esɛngi bátosaka Teokrasi,

    Mobulu’ezala te, se boyokani.

    (MONDIMO)

    Oyo Nzamb’alobi tokotosa,

    Tokoyokela ye.

    Ye bolingo mingi, Mobateli,

    Tókangama se na ye.

  2. 2. Mpo tóyeba ndenge ya kotosa ye,

    Apesi elimo mpe moombo n’e.

    Tɛlɛmá makasi, sepelisá ye,

    Lakisá mpe bato mibeko na ye!

    (MONDIMO)

    Oyo Nzamb’alobi tokotosa,

    Tokoyokela ye.

    Ye bolingo mingi, Mobateli,

    Tókangama se na ye.