Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 128

Tóyika mpiko tii na nsuka

Tóyika mpiko tii na nsuka

(Matai 24:13)

  1. 1. Kanisá bilak’a Nzambe,

    Epesa yo mpiko.

    Makambo n’e bateyá yo

    Ezali mpenza solo.

    Kangamá na matey’ango,

    Yebá nsuk’eza’ koya.

    Ata mpasi, zalá sembo;

    Mpasi’ekopɛtola yo.

  2. 2. Bolingo n’o ya liboso,

    Kobungis’ango te.

    Atako mpasi ezwi yo,

    Kangá kaka motema.

    At’omekami makasi,

    Kosila mayele te.

    Yehova akotɛlɛma

    Pene mpo asunga yo.

  3. 3. Bato baz’oyika mpiko,

    Bango bakobika.

    Nzambe akokoma bango

    Na buku n’e ya bomoi.

    Zwá mokano: yiká mpiko;

    Kolɛmba te na nzela.

    Yehov’akozala na yo;

    Esengo n’o nsuka te.