Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 137

Basi ya sembo, basi bakristo

Basi ya sembo, basi bakristo

(Baroma 16:2)

  1. 1. Banda kala, basi ya sembo baza’,

    Neti Maria, Ruta, Ester’, Sara.

    Batyaki Nzambe n’esik’a liboso.

    Bango, toyebi bankombo na bango.

    Ezali mpe na basi mosusu;

    Nkombo toyebi te, bazalaki sembo.

  2. 2. Basi yango, basi malamu mpenza.

    Basi’a boboto, mpiko, mpe bolingo.

    Bazali ndakisa malamu mpenza.

    Tólanda mpe bizaleli na bango.

    Lelo oyo mpe bandeko basi,

    Baza’ mpenza sembo, ndakisa kitoko.

  3. 3. Bamama mpe bandeko basi nyonso,

    Bóyeba: Nzambe alingaka bino.

    Na komikitis’oyo boza’ n’ango,

    Mpe elateli kitoko na bino.

    Tiká Yehov’azala na bino,

    Mpe bóyika mpiko, lobiko’ebɛlɛmi.