Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 19

Bilei ya mpokwa ya Nkolo

Bilei ya mpokwa ya Nkolo

(Matai 26:26-30)

  1. 1. Yehova, Tata na likoló,

    Mpokwa oyo eza’ ya yo!

    Kala, n’Elekeli, yo omonisaki

    Nguya, bwanya, bolingo n’o.

    Na makila ya mwana-mpate,

    Yisrael’esikwamaki.

    Mbula mingi na nsima, Yesu’akufaki;

    Ye nde mpate ya esakweli.

  2. 2. Mampa, vinyo’eza’ se bilembo

    Ya mbeka monene oyo.

    Okabaki Mwana na yo

    mpo na biso,

    Ye atosi tii na liwa.

    Matɔndi n’Ekaniseli’oyo;

    Butu’oyo toz’okanisa

    Liw’a Yesu ndenge

    esombaki biso,

    Tolongwe na mabɔkɔ’a liwa.

  3. 3. Liboso na yo toyangani.

    Obengisi biso, toyei

    Kokumisa yo mpo

    otindaki Kristo,

    Kokumisa mpe Mwana n’o.

    Elambo oy’ekumisi yo,

    Elendisi mpenza biso.

    Yah, tokolanda se lokolo ya Kristo,

    Mpe tokozwa bomoi ya seko.