Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 62

Loyembo ya sika

Loyembo ya sika

(Nzembo 98)

  1. 1. Yembelá Nzambe loyembo oyo ya sika.

    Lobel’oy’asali, mpe oy’akosala.

    Lobɔkɔ na ye, nani’akoki kolong’ango?

    Alingá bosembo,

    Ye nde Zuzi’a sembo.

    (MONDIMO)

    Yembáká!

    Loyembo ya sika!

    Yembáká!

    Mpo na Mokonzi, Yah.

  2. 2. Gangá n’esengo, sepelá: Nzambe Mokonzi!

    Pesá ye lokumu; yembá ye n’esengo.

    Yo ná bandeko bóyemba liboso’a Nkolo.

    Nzɛnzɛ, nsinga, bɛtá;

    Kelelo, lindanda.

    (MONDIMO)

    Yembáká!

    Loyembo ya sika!

    Yembáká!

    Mpo na Mokonzi, Yah.

  3. 3. Mai monene, yembelá Mokeli na yo.

    Mabele mpe yembá, ná biloko na yo.

    Ná ebale mpe, bɛtá mabɔkɔ mpo na ye.

    Ngomba mpe mabwaku,

    Bóyembela Nzambe.

    (MONDIMO)

    Yembáká!

    Loyembo ya sika!

    Yembáká!

    Mpo na Mokonzi, Yah.