Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 68

Tólona mboto ya Bokonzi

Tólona mboto ya Bokonzi

(Matai 13:4-8)

  1. 1. Yo mpe yaká n’elang’a Nkolo,

    Koboya te, abengi yo.

    Alobi akosalisa yo,

    Mateya n’ekokamba yo.

    Mboto ya solo ekolaka se

    na mitema oy’a sembo.

    Ɛɛ, yo bomá nzoto na mosala n’o

    oyo Nkolo apesi na yo.

  2. 2. Mpo mosala na yo ebota,

    Etali yo moko kaka.

    Ez’osɛnga olandelaka

    Bayekoli mpo bákola.

    Sungá mpo bálonga masɛnginya

    mpe kobanga baza’ n’ango.

    Okosepela ntango okomona

    baza’ kokende se liboso.

(Talá mpe Mat. 13:19-23; 22:37.)