Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 8

Yehova azali ekimelo na biso

Yehova azali ekimelo na biso

(Nzembo 91)

  1. 1. Yehova nd’ekimelo,

    Eliky’a nga’ ná yo.

    Tokomibomba na nse

    Ya elili na ye.

    Abundelaka bato n’e,

    Tokolonga nde mpo na ye.

    Yehova, ndako mpenza,

    Kuna bakozwa biso te.

  2. 2. Atako bato beboo

    Bakwei pene na yo,

    Kasi moyengebene,

    Ye akokwea te.

    Yango wana tóbanga te,

    Likam’ekobɛlɛma te.

    Nzamb’akobomba biso

    Na nse ya mapapu na ye.

  3. 3. Akobatela biso

    Na mitambo batye.

    Na butu, nsɔmɔ’eza’ te;

    Na moi mpe mbanzi te.

    Tokobanga eloko te,

    Epai nyonso, toza’ na ye.

    Yehova nd’ekimelo,

    Ye akobatela biso.