Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 84

Tómipesa

Tómipesa

(Matai 9:37, 38)

  1. 1. Nzamb’ayebi mposa na nga’

    Mpo nakóma na esengo.

    Apesi misala beboo,

    Nakoki kosalela ye.

    (MONDIMO)

    Bolingo, molende

    ekotinda nga’

    Nandima kokende

    esika mpos’eza’ mingi.

  2. 2. Bisik’oyo mposa eza’,

    Tokokende kosalisa.

    Bolingo nde ekotinda

    Mpo tósunga mpe baninga.

    (MONDIMO)

    Bolingo, molende

    ekotinda nga’

    Nandima kokende

    esika mpos’eza’ mingi.

  3. 3. Toza’ kotongela Nkolo,

    Na bamboka mpe bingumba.

    Toz’oyekola minɔkɔ

    Mpo tóteya moto nyonso.

    (MONDIMO)

    Bolingo, molende

    ekotinda nga’

    Nandima kokende

    esika mpos’eza’ mingi.