Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Masuwa na nkombo Lightbearer ememi pole ya mateya ya Biblia na sudi-ɛsti ya Asie

Masuwa na nkombo Lightbearer ememi pole ya mateya ya Biblia na sudi-ɛsti ya Asie

Na ebandeli ya bambula 1930, Batatoli ya Yehova batikalaki naino te kosakola na Indonésie, Malaisie mpe na mboka oyo ekómá sikoyo Papouasie-Nouvelle-Guinée. Ndenge nini nsango malamu ekokóma na mikili yango? Mpo na kokokisa mposa yango, biro ya filiale ya Australie, (oyo ekómi sikoyo biro ya Australasie) esombaki masuwa ya mɛtrɛ 16 oyo mopɛpɛ etindikaka. Masuwa yango ezalaki na motɛrɛ mpe banzete mibale oyo etɛlɛmisami mpo na kosimba elamba oyo ezalaki kozwa mopɛpɛ. Bapesaki yango nkombo “Lightbearer” mpo bato oyo bazalaki kosala na kati bazalaki bango nyonso babongisi-nzela, * basengelaki kosalela yango mpo na kopalanganisa pole ya mateya ya Biblia na mikili ya mosika.​—Matai 5:14-16.

Mosala ya kosakola na Nouvelle-Guinée

Na sanza ya 02/1935, bato nsambo oyo bazalaki kosala na kati ya masuwa yango balongwaki Sydney, na ɛsti ya Australie, mpo na kokende na nɔrdi na libongo ya Moresby, na Nouvelle-Guinée. Nzelanzela bakangaki mbisi mpe batɛlɛmaki na mabongo ebele mpo na kobakisa esansi, biloko ya kolya mpe kobongisa masuwa. Na mokolo ya 10/04/1935, balongwaki na Cooktown, na Queensland. Lokola bazalaki kokende na nzela oyo ezalaki likama mpo etondaki na mabanga, bazalaki kosalela bilamba ya masuwa mpe bapelisaki motɛrɛ ya masuwa yango. Kasi motɛrɛ ebandaki kosala makelele moko mabe mpe esɛngaki bakata yango. Bakómaki na mokakatano moko: bázonga esika bautaki to bákoba kokende na Nouvelle-Guinée? Eric Ewins, oyo azalaki kapitɛni, alobaki: “Tozalaki na mposa ya kozonga te.” Masuwa Lightbearer ekobaki mobembo na yango mpe na mokolo ya 28/04/1935 ekómaki na kozanga mokakatano na libongo ya Moresby.

Bandeko oyo basalaki mobembo na masuwa Lightbearer, banda na lobɔkɔ ya mwasi: William Hunter, Charles Harris, Alan Buckwell (na molɔngɔ ya liboso), Alfred Rowe, Frank Dewar, Eric Ewins, Richard Nutley

Ntango moto oyo abongisaka masuwa azalaki kobongisa motɛrɛ ya masuwa, bandeko nyonso basakolaki nsango malamu na libongo ya Moresby, longola kaka Frank Dewar. Frank, oyo ndeko mosusu alobaki ete azalaki “mobongisi-nzela ya molende mpenza,” alobaki boye: “Nazwaki babuku ebele mpe natambolaki na kati ya bamboka yango ekoki kozala kilomɛtrɛ 32 to koleka, mpe nasakwelaki bato ya bamboka yango.” Ntango abandaki kozonga, azwaki nzela mosusu mpe asengelaki kokatisa mwa ebale oyo ezalaki na bangando. Kasi atambolaki na ekɛngɛ mpe azongaki malamu na engumba. Milende ya bandeko oyo basalaki mobembo na masuwa yango mpo na mosala ya kosakola ebotaki mbuma. Bato mosusu oyo bazwaki mikanda oyo elimbolaka Biblia, na nsima bakómaki Batatoli ya Yehova.

Mosala ya kosakola na Java

Ntango motɛrɛ ebongaki, masuwa Lightbearer elongwaki na libongo ya Moresby mpe ekendaki na esanga ya Java, na Inde ya ɛsti oyo ekambamaki na bato ya Hollande (eteni monene na yango ezali lelo na Indonésie). Nsima ya kotɛlɛma mbala na mbala mpo na kozwa biloko oyo basengelaki na yango, masuwa etɛlɛmaki na Batavia (lelo Jakarta) na mokolo ya 15/07/1935.

Ntango bakómaki, Charles Harris, moko ya bandeko oyo basalaki mobembo, akitaki na masuwa Lightbearer mpe atikalaki na Java epai kuna akobaki kosakola nsango malamu na molende. * Alobi boye: “Na ntango wana, mosala na biso ezalaki kaka ya kotikela bato mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe kokende engumba oyo elandi. Namemaki mikanda na monɔkɔ ya Arabe, ya Chinois, ya Néerlandais, ya Anglais mpe ya Indonésien. Lokola bato bazalaki kondima kozwa mikanda na biso, nakabolaki mikanda 17 000 na mbula moko.”

Masuwa Lightbearer ezali kopɛpa

Molende ya Charles ebendaki likebi ya bakonzi ya Hollande. Mokolo moko, mokonzi ya polisi atunaki Motatoli mosusu soki banani nde bazalaki kosakola na Java, Batatoli boni bazalaki kosakola na ɛsti ya Java, esika oyo Charles azalaki. Ndeko yango ayanolaki: “Kaka moto moko.” Mokonzi ya polisi agangaki: “Okanisi ngai nakondima yango? Na kotalela motángo ya mikanda oyo ekabolami, basengeli kozala mpenza ebele kuna.”

Mosala ya kosakola na Singapour mpe Malaisie

Masuwa Lightbearer elongwaki na Indonésie mpe ekómaki na Singapour, na mokolo ya 07/08/1935. Na esika nyonso oyo masuwa yango ezalaki kotɛlɛma, bandeko bazalaki koyokisa bato masolo oyo etyamaki na kasɛti na lisalisi ya bikoliseli-lolaka ya masuwa. Lolenge wana ya kosakola nsango malamu ezalaki mbala mingi kobenda likebi ya bato ebele. Kutu, zulunalo moko ya Singapour elobaki ete: “Mokolo ya misato na butu, mongongo moko makasi ezalaki kouta na mai. Ezalaki diskur moko kitoko oyo etyamaki na masuwa Lightbearer. Banda masuwa oyo ekóma awa na Australie, batyelaka biso badiskur ya Société Watch Tower oyo batyá na bakasɛti.” Zulunalo yango ebakisi: “Soki klima ezali malamu, bato oyo bazali na kilomɛtrɛ 3 to 4 bakoki koyoka malamu programɛ wana na mosika.”

Ntango masuwa Lightbearer ezalaki na Singapour, Frank Dewar atikaki bango mpo na kokende kosala esika mosusu. Akanisi lisusu ntango akendaki mpe alobi boye: “Tobandaki mosala ya mobongisi-nzela na Singapour wana tozalaki kofanda na masuwa. Ntango ngonga ekómaki mpo masuwa Lightbearer ekende, Eric Ewins alobaki na ngai likambo moko oyo ekamwisaki ngai mingi.” Alobaki boye: “Frank, olobaki ete osepelaki kokende kosakola na Siam (lelo oyo Thaïlande). Lokola okabwani na biso, okoki kokende sikoyo!” Nazangaki maloba, na nsima nayebisaki ye boye: “Ndenge nazali awa, nayebi kutu nzela ya Siam te!” Eric alobaki na Frank ete akoki kokende kozwa engbunduka na Kuala Lumpur, oyo ezali lelo Malaisie. Frank akendaki na Kuala Lumpur mpe akómaki na Thaïlande basanza mingi na nsima. *

Masuwa Lightbearer ezalaki kokende na wɛsti ya Malaisie, etɛlɛmaki na libongo ya Johor Baharu, ya Muar, ya Malacca, ya Klang, ya Suettenham (lelo libongo ya Kelang), mpe ya Penang. Na libongo mokomoko, bandeko bayokisaki masolo ya Biblia oyo ezalaki na bakasɛti na nzela ya bikoliseli-lolaka. Jean Deschamp, Motatoli moko oyo azalaki kosakola na Indonésie alobaki boye: “Ata eloko oyo epumbwaka (soucoupe volante) ekoki mpenza te kobenda likebi ya bato boye.” Nsima ya koyokisa bato kasɛti ya masolo ya Biblia, bandeko bazalaki kokende na bamboka mpe kopesa mikanda na bato oyo basepelaki kozwa.

Mosala ya kosakola na Sumatra

Masuwa yango elongwaki na Penang elekaki na détroit ya Malacca mpo na kokende na Medan, engumba moko ya Sumatra (lelo esanga ya Indonésie). Eric Ewins alobi boye: “Tolekisaki ntango na Medan mpe zingazinga na yango, mpe bato mingi bandimaki koyoka nsango malamu.” Bandeko mibali bakabolaki mikanda soki 3 000 na esika yango.

Masuwa Lightbearer ekobaki kokende na sudi, bandeko yango basakolaki na mabongo minene ya ɛsti ya Sumatra. Na sanza ya 11/1936, masuwa Lightbearer ezongaki na Singapour mpe Eric Ewins atikalaki kuna. Mwa bapɔsɔ na nsima, abalaki Irène Struys, Motatoli moko oyo azalaki kofanda na Singapour. Eric mpe Irène bakobaki na mosala ya mobongisi-nzela na Sumatra. Masuwa Lightbearer ezalaki sikoyo na mposa ya kapitɛni ya sika.

Mosala ya kosakola na Bornéo

Kapitɛni ya sika ezalaki Norman Senior, ayebaki malamu kotambwisa masuwa, autaki na Sydney na sanza ya 01/1937. Balongwaki Singapour mpe bakendaki na Bornéo mpe na Célèbes (lelo Sulawesi). Kuna basakolaki na molende na bisika mingi mpe batambolaki kilomɛtrɛ 480 na bamboka yango.

Ntango masuwa Lightbearer ekómaki na libongo ya Samarida na Bornéo, mokambi ya libongo aboyaki kopesa bandeko nzela ya kosakwela bato ya mboka. Kasi, ntango Norman alimbolaki ntina ya mosala na biso ya kosakola, mobali yango andimaki mpe azwaki kutu mikanda.

Mokolo moko, mokambi moko ya lingomba ya esika wana abengaki Norman mpo aya koteya na lingomba na ye. Kasi na esika Norman asala lisolo, atyaki phonographe mpe atyaki badiskur 5 oyo ezalaki na bakasɛti. Mokambi yango asepelaki, azwaki kutu mikanda mpe akabolelaki yango baninga na ye. Likambo oyo mokambi yango asalaki ekamwisaki mpenza. Bakonzi ya mangomba mingi bazalaki kosepela te na mosala ya Batatoli ya Yehova. Kutu, basilikaki makasi komona ndenge bandeko bazalaki kosakola na molende mpe batyaki bakonzi ya Leta mbamba mpo bápekisa masuwa Lightbearer etɛlɛma na mabongo mosusu.

Karte oyo ezali komonisa mibembo oyo masuwa Lightbearer esalaki, karte yango ezali na bankombo ya bisika yango ndenge ezalaki kobengama kala

Bazongi na Australie

Na sanza ya 12/1937, lokola bakonzi ya mangomba batyaki bakonzi ya Leta mbamba mpo bátya bipekiseli, masuwa Lightbearer ezongaki na Australie. Bandeko yango batɛlɛmisaki masuwa yango na libongo ya Sidney na sanza ya 04/1938 mpo na kokɔta liyangani ya Batatoli ya Yehova. Nsima ya bambula koleka misato nde masuwa Lightbearer elongwaki Sidney. Batɛkaki masuwa yango na bambula ya 1940, kaka nsima ya ntango oyo mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Australie. Ndeko Ewins alobaki boye: “Kozanga ntembe, masuwa yango esalisi mpenza mpo mosala ekende liboso.” Mpe abakisaki ete: “Ntango oyo nalekisaki na mosala oyo nasalaki na kati ya masuwa Lightbearer ezali ntango oyo eleki malamu nalekisá na bomoi na ngai.”

Masuwa Lightbearer eboti mbuma ya libela

Bandeko oyo basalaki mobembo na masuwa Lightbearer basakolaki nsango malamu na esika moko monene oyo ezali na bato ebele. Atako bakutanaki na botɛmɛli, mosala na bango esalisaki mokemoke bato bákóma Batatoli ya Yehova (Luka 8:11, 15). Lelo oyo, na mikili epai babongisi-nzela wana ya liboso basakolaki, basakoli ya Bokonzi bazali koleka 40 000. Bandeko yango oyo bazalaki moke, basalelaki masuwa na bango Lightbearer mpo na kopalanganisa na molende nyonso pole ya mateya ya Biblia. Mosala kitoko oyo basalaki na mpiko nyonso ezali ndakisa monene mpo na biso lelo oyo!

^ par. 1 Babongisi-nzela ezali Batatoli ya Yehova oyo bamipesaka mingi na mosala ya kosakola.

^ par. 5 Lisolo ya bomoi ya Charles Harris ebimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1/06/1994.