Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo 7 ya kosala mpo na kobatela bilei mpe kolya bilei ya malamu

Makambo 7 ya kosala mpo na kobatela bilei mpe kolya bilei ya malamu

 Mpo na nini ezali na ntina kolandela na likebi biloko oyo olyaka?

 Mpo ozala na sante ya malamu, yango etaleli biloko oyo olyaka. Soki ozali kokoba kobatela bilei mpe kolya bilei ya malamu, okoki kokóma na sante ya malamu. Kasi, kozala na momeseno ya kolya bilei ya malamu te mpe biloko oyo etongaka nzoto te ebimisaka mikakatano na nzoto, kaka ndenge likama ekoki kobima soki batye mafuta ya malamu te na motɛrɛ ya motuka. Mbala mosusu ekoki komonana mbala moko te, kasi ekoki kosalema.​—Bagalatia 6:7.

 Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) elobi ete “na ekoló nyonso na mokili mobimba, okokuta bato mingi bazali na sante ya malamu te”​—ezali kaka te mpo bazali kolya malamu te kasi mpo bakómi kobakisa kilo mingi mpe bakómi mineneminene. Mbala mingi kolya bilei oyo etongaka nzoto te to komɛla masanga ezali kobakisa maladi ya motema, AVC, diabɛtɛ, mpe kansɛr. Na kotalela bolukiluki moko oyo esalemaki, kolya mabe esalaki ete bato soki milio 11 bákufa na mbula oyo eleki. OMS emonisi ete bilei oyo ezali malamu te mpo na sante ebomaka bato koleka 1 000 mokolo na mokolo mpe yango ezali komemela bamilio ya bato mikakatano ya sante.

 Biblia ezali kolendisa biso ete tózwa na lisɛki te likambo etali kolya bilei ya malamu. Eteyaka ete Nzambe azali “liziba ya bomoi.” (Nzembo 36:9) Bomoi ezali likabo, mpe tozwaka yango na valɛrɛ ntango tobatelaka sante na biso mpe ya bato ya libota na biso. Talá makambo oyo okoki kosala.

 Makambo minei ya kosala mpo na kobatela bilei malamu

 1. Ntango ozali kolamba bilei, bateláká yango malamu.

 Mpo na nini? Mpo bamikrobɛ ya mabe a oyo ekɔtaka na bilei mpe na mai ekoki kokɔta na nzoto na yo mpe kosala ete obɛla.

 Toli oyo bato ya mayele bapesi:

  •   Liboso ya kolamba bilei, sukoláká mabɔkɔ na yo na sabuni mpe na mai. b Kobá konika mabɔkɔ na boumeli ya basegɔnde 20. Niká nsima ya mabɔkɔ mpe katikati ya misapi na yo. Lekisá mabɔkɔ na mai mpe pangwisá yango malamu.

  •   Sukoláká na sabuni mpe na mai mabaya ya kokatela biloko, basaani, mpe eloko nyonso mosusu oyo okosimba na yango bilei. Longola yango, boyá kosalela kaka libaya moko ya kokatela biloko mpo na biloko oyo okolamba mpe mpo na biloko oyo okolamba te.

  •   Sukoláká bambuma mpe ndunda nyonso, mpe saleláká nkisi ya koboma mikrobe mpo na kopɛtola yango soki bozali kofanda na esika oyo bazwaka mai mpo na kosopelaka milona soki mbala mosusu mai yango eutaka na mai oyo ezali na nyɛi.

 2. Kotyaka esika moko te biloko ya mobesu ná biloko ya kolamba.

 Mpo na nini? Mpo bamikrobe ya biloko ya mobesu, na ndakisa mosuni ya mobesu mpe mai na yango ekokɔta na biloko mosusu ya kolya.

 Toli oyo bato ya mayele bapesi:

  •   Tyáká biloko ya mobesu​—mingimingi mosuni ya mobesu na esika na yango ntango osombi yango na wenze mpe ozali komema yango na ndako, kosangisa yango esika moko te na biloko mosusu.

  •   Nsima ya kokata mosuni ya mobesu, sukolá mabɔkɔ na yo, mbeli mpe libaya ya kokatela biloko malamumalamu liboso ya kokata eloko mosusu nyonso.

 3. Omindimisa ete biloko oyo esengeli kolambama elambami malamu mpenza.

 Mpo na nini? Mpo bamikrobe ya mabe ekufaka kaka soki biloko etɔki makasi na mɔtɔ na boumeli ya ntango molai.

 Toli oyo bato ya mayele bapesi:

  •   Tɔkisá biloko tii ntango mɔtɔ ekokóma makasi mpenza. Mɔtɔ esengeli kokɔta mpenza tii na kati ya mosuni, yango wana esengeli kotɔkisa yango tii na dégré Celsius 70 (160°F).

  •   Tɔkisá malamu supu mpe bilei oyo basangisaka biloko ndenge na ndenge.

  •   Liboso ya kolya bilei oyo balambaki, tɔkisá yango lisusu tii ntango ekokóma mɔtɔ makasi.

 4. Bombá bilei na esika oyo ekobatelama malamu mpenza.

 Mpo na nini? Mpo soki babombi bilei na esika oyo ezali na degré Celsius kobanda 5 tii 60 (40–140°F) kaka mpo na miniti 20, bamikrobe ekoki kobakisama mbala mibale. Lisusu, soki mosuni ya mobesu ebombami te na esika oyo ebongi, bamikrobe mosusu ekoki kobota bapwazɔ babengi toxines oyo ekoki kokufa te ntango bazali kolamba bilei.

 Toli oyo bato ya mayele bapesi:

  •   Mpo na kopekisa mikrobe ebota to ebakisama, bombá bilei ezala mɔtɔ to malili, kasi ezala mpiɔ te mɔtɔ te (tiède).

  •   Kotika soki moke te bilei kaka boye na boumeli ya ngonga koleka mibale, to koleka ngonga moko soki ndako ezali na degré Celsius koleka 32 (90°F).

  •   Nsima ya kolamba biloko, bombá yango na esika ezali mɔtɔ tii ntango ekolyama.

 Makambo misato ya kosala mpo na kolya bilei ya malamu

 1. Lyáká mbuma mpe ndunda mitindo ndenge na ndenge mokolo na mokolo.

 Mbuma mpe ndunda ezalaka na bavitamini, biloko oyo ezalaka na sukali mpe mungwa, mpe biloko mosusu oyo ezali na ntina mpo na kozala na sante ya malamu. OMS elobi ete nzoto ya moto ezalaka na mposa ya mitindo mitano ya mbuma mpe ndunda mokolo na mokolo. Kati na mitindo yango, etángi te mbala to mabɛngɛ mpe manioko to nsɔngɔ.

 2. Lyáká kaka biloko oyo ezali na mafuta mingi te.

 OMS esɛngi ete olyaka na kolekisa ndeko te biloko oyo balambi na mafuta to biloko oyo ezali na manzanza, oyo mbala mingi ezalaka na mafuta oyo etongaka nzoto te. Soki likoki ezali, lambáká na mafuta oyo ekangamaka te. c Mafuta yango ezalaka malamu koleka mafuta oyo ekangamaka.

 3. Saleláká mungwa ná sukali kozanga kolekisa ndelo.

 OMS esɛngi ete moto oyo akómi mokóló asengeli te kolya mungwa lutu koleka moko na mokolo. OMS esɛngi mpe ete ntango azali kosalela sukali oyo tosalelaka mingi d alekisa te mililitrɛ 60 (lutu 12 ya moke ya kafe) na mokolo. Basalelaka sukali mingi mpo na kolamba bilei to masanga. Na ndakisa, na mililitrɛ 355 ya masanga ya sukali ezalaka na mililitrɛ 50 ya sukali, elingi koloba lutu 10 ya moke ya kafe ya sukali. Atako masanga ya sukali ezalaka na sukali mingi mpo na kopesa makasi, etongaka mpenza nzoto te.

 Biblia elobi: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.” (Masese 22:3) Soki ozali ekɛngɛ mpe ozali kolandela ndenge na yo ya kolya mpe osali mbongwana oyo esengeli, okomonisa Nzambe ete ozwaka bomoi na yo mpe sante na yo na valɛrɛ.

 Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango

 Likanisi ya libunga: Bilei ya malamu mpo na kolya ezali oyo ezali komonana kitoko, kobimisa nsolo kitoko mpe oyo ezali elɛngi.

 Likambo ya solo: Mpo litrɛ moko ya mai emonana salite esɛngaka miliare 10 ya mikrobe ebotama, kasi mikrobe kobanda 15 tii 20 ya mabe mpamba ekoki kosala ete obɛla makasi. Mpo tómindimisa ete bilei mpe masanga na biso ebatelami malamu, tosengeli kolamba yango malamu, kosalela yango ndenge esengeli mpe kobomba yango esika oyo ekosala ete ebeba te na molunge to na malili.

 Likanisi ya libunga: Banzinzi ebebisaka bilei te.

 Likambo ya solo: Banzinzi elyaka bosɔtɔ mpe ebotanaka na kati na yango na ndakisa na nyɛi, yango wana ememaka na makolo na yango bamilio ya bamikrobe oyo ememelaka bato maladi. Mpo na kobatela malamu bilei mpo banzinzi ekɔtisa mikrobe te na kati, tosengeli kozipaka yango malamu.

 Likanisi ya libunga: “Nalyaka banda kala bilei oyo etongaka mpenza nzoto te, ekozala na ntina te soki nabongoli momeseno na ngai ya kolya.”

 Likambo ya solo: Bato oyo basalaka bolukiluki bamoni ete kolya bilei oyo etongaka nzoto sikoyo ekobakisela yo mwa mikolo mpo okufa noki te mpe ekosalisa yo mingi ntango ozali kokoba kosala bongo.

a Bamikrobɛ ezali bikelamu ya mikemike mpenza oyo ezalaka na bomoi mpe okoki te komona yango na miso boye. Yango ekoki kozala banyama ya mikemike mpenza, bavirisi, mpe bamikrobɛ mosusu oyo ezalaka kaka na kati ya biloko mosusu. Bamikrobɛ mosusu ezalaka malamu mpo na sante ya moto, kasi oyo ya mabe ekoki kosala moto mabe to ata mpe koboma ye.

b Sabuni ná mai elongolaka bamikrobɛ koleka mai yango moko.

c Mafuta ya kolambela oyo ekangamaka te ezalaka maimai, kasi ekomaka libanga te na kotalela molunge to malili ya ndako.

d Sukali oyo tosalelaka mingi ezali sukali oyo totyaka na tii to na kafe, oyo ezalaka na mafuta ya nzoi mpe na masanga ya sukali oyo esalemi na mbuma. Yango ekeseni na sukali oyo ezalaka na biloko oyo Nzambe akelá na ndakisa, sukali oyo ezalaka na mbuma, na ndunda to na miliki.