Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Na 2017, bana-kelasi ya Gileadi bazali kolanda mateya

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Eteyelo ya Gileadi​—Mosala na yango na mokili mobimba

Eteyelo ya Gileadi​—Mosala na yango na mokili mobimba

01/12/2020

 Mbula na mbula, bandeko mosusu oyo bazali na mosala ya ntango nyonso na mokili mobimba, babengisamaka na Eteyelo ya Gileadi, oyo ebongisamaka na Esika monene ya mateya ya Watchtower na Patterson, na New York. a Na eteyelo yango, bana-kelasi bayekolaka mayele ya koyeba misala ndenge na ndenge oyo bazali na yango na ebongiseli ya Yehova. Formasyo yango esalisaka bango básalisa masangá ekóma makasi mpe báfandisa mpenza makambo na Babetele na mokili mobimba.

 Gileadi ezali mpenza eteyelo oyo bana-kelasi bautaka na mikili ndenge na ndenge. Na ndakisa, na kelasi ya mbala ya 147, oyo esalemaki na 2019, ezalaki na bana-kelasi 56, oyo bautaki na mikili 29. Bana-kelasi oyo bakɔtaka na Gileadi ezali bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso, bandeko oyo basalaka na Betele, bakɛngɛli ya zongazonga, bamisionɛrɛ, to babongisi-nzela monene.

 Makambo ebongisamaka liboso mpenza ete kelasi ebanda. Na ndakisa, Biro monene oyo etalelaka makambo ya mibembo (WHQ Travel) esombaka batike mpo na bana-kelasi oyo babengisami na eteyelo. Na kelasi ya mbala ya 147 ya Gileadi, mpo na mwana-kelasi mokomoko oyo autaki na mboka mosusu mpe na Patterson, esengelaki kobimisa mbongo dolare 1 075. Bana-kelasi oyo bautaki na Bisanga ya Salomon basengelaki kozwa mpɛpo minei mpo na kokóma na Patterson, mpe na nsima, mpɛpo misato mpo na kozonga epai na bango; basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 35 400, kokende mpe kozonga! Mwana-kelasi mokomoko asengelaki kofuta tike dolare 2 300. Mpo na kobatela mbongo, Biro ya mibembo elukaka bampɛpo na ordinatɛrɛ mpe bakangaka bisika mpo na kofuta tike na ntalo ya moke. Ata nsima ya kokanga bisika, programɛ yango ya ordinatɛrɛ ekobaka kolukaluka na boumeli ya bapɔsɔ ata mpe basanza mpo na kozwa esika bakitisi tike. Biro ya mibembo esalelaka mpe batike oyo bapesaka bakiliya oyo basalaka mibembo mbala na mbala to ba-point mpo na kosomba tike na ntalo moke.

 Bana-kelasi mingi basengeli liboso kozwa viza mpo bákɔta na États-Unis. Yango wana, Biro ya mibeko esalisaka bango bázwa viza ya bana-kelasi. Mpo na kozwa viza mpe kondimama, mwana-kelasi mokomoko asengeli kofuta dolare 510.

 Bolamu nini tozwaka na formasyo oyo bana-kelasi bazwaka? Hendra Gunawan azali nkulutu na Azia ya Sudi-Ɛsti. Azali na lisangá moko oyo mwasi moko ná mobali na ye bakɔtá na eteyelo ya Gileadi. Alobi boye: “Liboso, lisangá na biso ezalaki na babongisi-nzela ya sanza na sanza te. Ntango bandeko oyo bautaki na Gileadi bakómaki na lisangá na biso, milende na bango mpe elimo na bango ya komipesa esalaki ete bandeko mosusu bázwa mokano ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kutu, na nsima, ndeko mwasi moko ya lisangá na biso akɔtaki na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi!”

 Sergio Panjaitan asalaka elongo na bandeko mosusu oyo bautá mpe na eteyelo ya Gileadi kuna na Betele ya Azia ya Sudi-Ɛsti. Alobi boye: “Formasyo bazwaki ezalaki malamu kaka mpo na bango moko te, ezalaki mpe malamu mpo na biso. Bayekolaki makambo ebele! Kasi na esika ya komikumisa ete bayebi makambo ebele koleka bandeko mosusu, bazali nde kolakisa bango makambo bayebi. Na ndenge yango balendisaka biso, biso mpe tolendisaka bango.”

 Mbongo ya kosala makambo nyonso wana eutaka wapi? Na makabo oyo epesamaka mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mosusu epesamaka na lolenge ya kopesa makabo oyo ezali na donate.ps8318.com. Matɔndi mingi mpo na makabo na bino, yango ezali kosalisa mpo na kotambwisa eteyelo oyo ebongisamaka mpo na bana-kelasi oyo bautaka na mokili mobimba.

a Mateya ya eteyelo yango ebongisamaka na Departema ya biteyelo ya Teokrasi, oyo ezali kokambama na Komite ya mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Balakisi na eteyelo yango ezali bandeko oyo basalaka na Departema ya mateya, balakisi mosusu bautaka na bisika mosusu, mpe bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi.