Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Geoffrey Jackson azali kolakisa Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Batak Toba

04 SANZA YA 12, 2020
INDONÉSIE

Batatoli ya Yehova babimisi Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na mobimba na yango na minɔkɔ minei ya Indonésie

Batatoli ya Yehova babimisi Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na mobimba na yango na minɔkɔ minei ya Indonésie

Na mokolo ya 28/11/2020, babimisaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na mobimba na yango mpe babimisaki yango na imprimeri mpe ndenge oyo moto akotánga na aparɛyi na ye na minɔkɔ minei oyo bato balobaka na Indonésie: Batak Karo, Batak Toba, Javanese, mpe Nias. Ndeko Geoffrey Jackson, ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alakisaki Babiblia yango na programɛ sipesiale oyo etyamaki na TV mpo masangá nyonso elanda yango na bisanga ebele ya Indonésie. Bato mosusu soki 41 265 balandaki programɛ yango mbala moko. Na ntango ya programɛ yango, ndeko Jackson alobaki mpe ete mosika te, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Sunda ekobima kasi bakozwa yango kaka na nzela ya aparɛyi.

Mabongoli wana ya Biblia ezali komonisa milende makasi oyo babongoli basalaki na boumeli ya mbula misato na ndambo. Bato koleka milio 100 oyo balobaka ata moko ya minɔkɔ minei yango bakotánga mabongoli wana ya sika. Longola bango, basakoli koleka 2 600 basalelaka minɔkɔ yango na mosala ya kosakola mpe na makita ya lisangá.

Lelo oyo, batángi bazali kokanga te ntina ya maloba ya kala mpe elobeli oyo basalelaki mpo na kobongola mabongoli yango ya Biblia. Mobongoli moko alobi: “Kozala na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika, na mobimba na yango endimisi ngai ete Yehova alingi moto nyonso ayoka Liloba na ye na monɔkɔ oyo ezali pɛtɛɛ kokanga ntina na yango mpe oyo ezali kosimba motema.”

Daniel Purnomo, ndeko moko ya Komite ya filiale ya Indonésie, alobi boye: “Tozali kobika na ntango moko ya mpasi, mingimingi na ntango oyo ya maladi mabe oyo ezali kopanzana. Bandeko na biso oyo tolingaka mingi oyo balobaka minɔkɔ yango bazali na botɔndi mingi mpo na likabo oyo ya elimo oyo eyei na ntango oyo ebongi mpenza.”

Tozali kopesa Yehova matɔndi ndenge asali ete Liloba na ye oyo ezali likabo moko ya motuya mpenza ekómela bato mingi. Tondimi ete ebele ya bato oyo balobaka minɔkɔ yango bakozala na likoki ya kozwela mateya ya Biblia matomba.​—Yakobo 1:17.